Liteya 9
Banani bazali baninga ya Nzambe?
Yesu Klisto azali Mwana ya Yehova mpe moninga na ye ya motema. Liboso abotama lokola moto awa na mabele, Yesu azalaki na bomoi na likoló lokola ekelamu ya elimo ya nguya. (Yoane 17:5) Na nsima ayaki awa na mabele koteya bato solo ya makambo ya Nzambe. (Yoane 18:37) Andimaki kokufa mpo bomoi na ye ebikisa bato ya botosi na lisumu mpe na liwa. (Baloma 6:23) Yesu azali sikoyo Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, boyangeli ya likoló oyo ekotya Paladiso awa na mabele.—Emoniseli 19:16.
Baanzelu bazali mpe baninga ya Nzambe. Baanzelu bazalaki na bomoi awa na mabele te lokola bato. Bakelamaki mbala moko na likoló liboso Nzambe asala mabele. (Yobo 38:4-7) Baanzelu bazali ebele mpenza. (Danyele 7:10) Baninga yango ya Nzambe oyo bazali na likoló balingaka ete bato báyekola solo ya makambo ya Yehova.—Emoniseli 14:6, 7.
Nzambe azali mpe na baninga awa na mabele; abengaka bango batatoli na ye. Na tribinale, motatoli alobaka makambo oyo ayebi mpo na moto moko to mpo na likambo moko. Batatoli ya Yehova bayebisaka bato mosusu makambo oyo bayebi mpo na Yehova mpe mpo na mokano na ye. (Yisaya 43:10) Ndenge moko na baanzelu, Batatoli balingi kosalisa yo oyekola makambo ya Yehova. Balingi ete yo mpe ozala moninga ya Nzambe.