Liteya 7
Likebisi ya ntango ya kala
Yehova akopesa bato mabe nzela te mpo bábebisa Paladiso. Kaka baninga na ye nde bakofanda kuna. Nini ekokómela bato mabe? Mpo na kozwa eyano, tótalela naino lisolo ya Noa. Noa azalaki na bomoi esili koleka bambula ebele. Azalaki mobali malamu oyo azalaki ntango nyonso kosala milende mpo na kosala mokano ya Yehova. Kasi, bato mosusu na mabele bazalaki kosala makambo ya mabe. Yango wana, Yehova ayebisaki Noa ete akoboma bato mabe yango nyonso na Mpela moko monene. Ayebisaki Noa atonga masuwa mpo ye na libota na ye bákufa te ntango Mpela yango monene ekoya.—Genese 6:9-18.
Noa na libota na ye batongaki masuwa. Noa akebisaki bato ete Mpela moko monene ezali koya, kasi bayokelaki ye te. Balandaki kosala makambo mabe. Ntango masuwa esilaki, Noa akɔtisaki banyama na kati ya masuwa, na nsima ye na libota na ye mpe bakɔtaki. Na nsima, Yehova abɛtisaki mbula makasi. Mbula yango ebɛtaki mikolo 40 mpe butu 40. Mai ezindisaki mabele mobimba.—Genese 7:7-12.
Bato mabe bakufaki, kasi Noa na libota na ye babikaki. Yehova abikisaki bango na Mpela monene mpe afandisaki bango na mabele oyo ezalaki lisusu na bato mabe te. (Genese 7:22, 23) Biblia elobi ete ntango ezali koya oyo Yehova akoboma lisusu baoyo bazali koboya kosala makambo ya malamu. Akoboma bato ya malamu te. Bato ya malamu bakofanda na Paladiso awa na mabele libela na libela.—2 Petelo 2:5, 6, 9.
Lelo oyo bato mingi bazali kosala makambo ya mabe. Mokili etondi na mobulu. Yehova azali kotinda Batatoli na ye mbala na mbala mpo bákebisa bato, kasi bato mingi balingi koyoka maloba ya Yehova te. Balingi kobongola bizaleli na bango te. Balingi kondima te makambo oyo Nzambe amonaka ete ezali malamu mpe oyo Nzambe amonaka ete ezali mabe. Nini ekokómela bato yango? Bakobongwana mokolo mosusu? Mingi bakobongwana te. Etikali moke bato mabe bábomama mpe bakozala lisusu na bomoi te.—Nzembo 92:7.
Mabele ekobebisama te; ekokóma Paladiso. Baoyo bakómi baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso awa na mabele libela na libela.—Nzembo 37:29.