Ntina oyo tozali na mokili
BIBLIA emonisi ete Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, akelá biloko nyonso na ntina. Tózwa ndakisa ya ebongiseli oyo asalá mpo mai ezangaka te awa na mabelé, oyo esalaka ete bomoi ezala. Biblia elobeli yango na maloba kitoko oyo: “Bibale nyonso ekotiyola kino mai-na-monana; kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, ekozongaka bobele wana lisusu.”—Mosakoli 1:7.
Biblia ekokanisi bilaka ya Nzambe na ebongiseli yango oyo touti kotánga. Ndenge toyebi yango, moi esalaka ete mai ya mbu, ya bibale mpe ya balaki emata na likoló mpe na nsima ezonga lisusu awa na mabelé na nzela ya mbula. Yehova abendi likebi na biso na likambo yango mpe alobi boye: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana. Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.”—Yisaya 55:10, 11, NW.
Mai ya pɛto eutaka na mapata mpe ezongaka awa na mabelé mpo bomoi ezala. Ndenge moko mpe, “liloba oyo eutaka na monɔkɔ [ya Nzambe]” ekoki kobatela bomoi na biso na elimo. Ezali ndenge Yesu Klisto alobaki yango: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.”—Matai 4:4.
Kolya bilei ya elimo oyo Nzambe abongisi esalisaka biso tózala na bomoi oyo eyokani na mokano na ye. Kasi, liboso ya kosala yango, tosengeli koyeba mokano yango ya Nzambe. Na ndakisa, mpo na nini Nzambe akelaki mabelé? Mpe ndenge nini mokano na ye mpo na mabelé etali mpe biso? Tiká tótala yango.
Mokano ya Nzambe mpo na mabelé
Lokola Nzambe alingaka bolamu ya bato, atyaki Adama ná Eva, mobali mpe mwasi ya liboso na elanga ya Edene. Na nsima alobaki na bango bábɔta bana; alobaki boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi ya mai, mpe ya ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.”—Genese 1:26-28; 2:8, 9, 15.
Maloba yango emonisi nini? Emonisi ete Nzambe alingaki ete mabelé mobimba ekóma paladiso, esika oyo bato nyonso basengelaki kofanda, boye te? Liloba na ye elobi boye: “Lola mpe likoló-na-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.”—Nzembo 115:16.
Kasi, mpo bato bázwa matomba na mokano ya Nzambe ete báfanda libela na mokili, basengeli kokumisa mpe kotosa Yehova. Kasi, Adama asalaki yango? Te, asalaki lisumu na ndenge atosaki Nzambe te. Yango ebimisaki likambo nini? Bana nyonso ya Adama, ata mpe biso, tokómaki baombo ya lisumu mpe ya liwa, ndenge kaka Biblia elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”—Baloma 5:12.
Mpo na yango, bato nyonso bakufaka mpe mabelé ekómi naino paladiso te. Ekoki kozala ete Nzambe abongoli mokano na ye mpo na mabelé?
Te, kobosana te ete Nzambe alobaki ete: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai . . . ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te,” kasi “ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.” Lisusu, Nzambe alaki boye: “Nakokokisa mokano mobimba na ngai.” (Yisaya 45:18; 46:10; 55:11, NW) Lisusu, ezali mpenza mposa ya Nzambe to mpe mokano na ye ete mabelé mobimba ekóma paladiso oyo etondi na bato oyo bakosalela ye libela na libela na esengo, ndenge akanaki yango na ebandeli.—Nzembo 37:29; Yisaya 35:5, 6; 65:21-24; Emoniseli 21:3, 4.
Mokano ya Nzambe ekokokisama ndenge nini?
Yehova amonisaki bwanya mpe bolingo na ye na ndenge azwaki bibongiseli mpo bato básikwama na lisumu mpe makambo oyo yango ememá—kozanga kokoka mpe liwa. Asalaki yango na ndenge atindaki mwana na ye abotama kozanga lisumu mpo na kosikola biso na lisumu ya Adama. Likambo oyo asalaki ebengami lisiko, oyo epesamaki mpo bato ya sembo bázwa bomoi ya seko. (Matai 20:28; Baefese 1:7; 1 Timote 2:5, 6) Ndenge nini lisiko efutamaki?
Gabriele, anzelu ya Yehova ayebisaki Malia, elenge mwasi moko, ete akobota mwana na ndenge ya likamwisi, atako ‘asangisaki nzoto ná mobali te.’ Nzambe asalaki likamwisi yango ntango atyaki bomoi ya mwana na ye na libumu ya Malia. Malia azwaki zemi na nguya ya elimo santu ya Nzambe.—Luka 1:26-35.
Sanza libwa na nsima, Yesu abotamaki moto ya kokoka lokola Adama. Ntango akolaki, apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka. Na ndenge yango, Yesu akómaki ‘Adama ya mibale’ mpe apesaki bato nyonso ya sembo nzela ya kosikolama na lisumu mpe na liwa.—1 Bakolinti 15:45, 47.
Bolingo yango ya Nzambe esengeli kotinda biso tólinga ye! Ndenge Biblia elobi yango: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Motuna yango oyo: Tosengeli kosala nini mpo na bolingo oyo Nzambe amoniselaki biso? Tosengeli te komonisa botɔndi mpo na likabo oyo apesaki biso? Tótalela bandakisa ya bato mosusu oyo bamonisaki botɔndi.
Bomoi oyo ezali na ntina
Denise, elenge mwasi oyo tolobelaki na lisolo eleki, amonaki ete kotosa mibeko mpe malako ya Nzambe esalaki ete azala na bomoi oyo ezali na ntina. Alobi boye: “Nayekolaki ete longola mokano oyo Nzambe azali na yango mpo na bato, azali mpe na mosala moko mpo na baoyo basambelaka ye. Nayebi te bomoi mosusu oyo eleki bomoi ya kosalela bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesá biso mpo na kokumisa ye mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mokano na ye.”
Biso mpe tokoki kosala yango soki toyekoli mokano ya Nzambe mpe tosali yango. Ya solo, tozwi naino mapamboli nyonso te ya lisiko ya Yesu, oyo ekokómisa biso bato ya kokoka na mokili ya sika ya boyengebene. Kasi, liboso ete likambo yango ekokisama, tosengeli kokokisa noki mposa ya elimo oyo Nzambe atyá epai ya mokomoko na biso.
Dave, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, azali moko na bato oyo bakokisaki mposa na bango ya elimo. Azwaki biyano na mituna etali ntina ya bomoi. Alobi boye: “Ntango nakanisaka bomoi oyo nazalaki na yango liboso ya koyeba mokano ya Nzambe, namonaka ete ezalaki mpenza na ntina te. Nazalaki komiyoka bongo mpo nakokisaki naino te mposa na ngai ya elimo. Namiyokaka lisusu bongo te. Sikoyo nayebi ntina oyo nazali na mokili mpe likambo oyo nasengeli kosala na bomoi na ngai.”
Na bokeseni na makanisi ya bato, ndenge oyo Nzambe amonisi ntina ya bomoi na kati ya Biblia ebongi mpenza. Tozali awa na mokili mpo na mokano ya Yehova ete tókumisa nkombo na ye, tózala na boyokani na ye, mpe tósambelaka ye. Lelo oyo mpe mpo na libela, tokoki komona kokokisama ya maloba oyo: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.”—Nzembo 144:15.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
NTINA YA BAMPASI
Balobaka ete mokakatano monene mpo na koyeba ntina oyo tozali na mokili ezali nde bampasi oyo tozali komona. Viktor Frankl, alobi boye: “Soki bomoi ezali na ntina, boye bampasi ezali mpe na ntina. Tokoki kozala na bomoi te kozanga komona mpasi, ata mpe kokufa.”
Biblia emonisi ntina oyo tomonaka bampasi mpe tokufaka. Yango eutaka epai ya Nzambe te. Kutu, bampasi ebimá mpo mobali ná mwasi ya liboso batombokelaki Mozalisi. Bana na bango nyonso bázwá ezaleli yango mpe ezali mpo na yango nde bampasi etondi na mokili.
Ya solo, koyeba ntina oyo tozali na mokili ekosilisa bampasi na biso nyonso te; kasi ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Lisusu, boyebi yango epesaka biso elikya mpo na mikolo ezali koya, ntango oyo Nzambe akolongola bampasi mpe liwa mpo na libela.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Biblia ekokanisi bilaka ya Nzambe na ebongiseli kitoko ya mai
[Etanda]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Rain ← Evaporation ← Evaporation
↓ ↑
↓ ↑
Lakes, rivers ↑
↓
→ → Oceans
[Elilingi na lokasa 8, 9]
Ndenge nini toyebi ete mabelé ekobongwana paladiso, oyo ekotonda na bato ya esengo mpe ya nzoto kolɔngɔnɔ?
[Elilingi na lokasa 9]
‘Nayebi te bomoi mosusu oyo eleki bomoi ya kosalela bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesá biso mpo na kosalela ye.’—Denise