Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 nk. 17-19
  • Kopesa makabo ekosilisa mikakatano ya bato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopesa makabo ekosilisa mikakatano ya bato?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eleko ya kopesa makabo mingi?
  • Mosala oyo makabo yango ekoki kosala
  • Ntina oyo mbongo mpamba ekoki te
  • Mopesi Monene ya makabo
  • Kotalela mbongo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2015
  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ezali solo ete mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na makambo ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 nk. 17-19

Kopesa makabo ekosilisa mikakatano ya bato?

ATAKO bazulunalo ezali kolobela mingi makambo lokola makama, bobola, nzala, maladi mpe makama oyo ekoki kobima na mikolo ezali koya, likambo mosusu ya malamu ezali komonana​—bato mingi bazali kopesa makabo ya mbongo. Na bantango mosusu, bapanzi-nsango balobelaka mpe ndenge bato ya mbongo bazali kopesa bankama ya bamilio ya badolare, ata mpe bamiliare, mpo na kosalisa basusu. Mbala mingi, bato oyo bayebani mingi bazali koloba mpo na kobenda likebi na mikakatano oyo bato bazali na yango. Ata bato mosusu oyo bazali na mbongo mingi te bazali kopesa makabo mpo na kosalisa. Kasi, makabo yango ya mbongo ekoki mpenza kosalisa mpo na ntango boni?

Eleko ya kopesa makabo mingi?

Emonani ete motángo ya bato oyo bazali kopesa makabo ezali se kobakisama na mikili mingi. Buku moko elobi boye: “Koleka na eleko mosusu nyonso, na ebandeli ya bambula ya 2 000, bibongiseli ya kopesa makabo esalemi mingi mpe etyami na mikili mingi mpe ezali na mbongo mingi koleka.” Lokola motángo ya bato ya mbongo ezali se kobakisama, emonani ete kopesa makabo ekosuka te. Bato bazali kokóma na mbongo mingi mpo na kopesa makabo; lisusu, soki moto ya mbongo akufi mpe atiki mbongo, mingi ezali kokende na bibongiseli oyo esalisaka babola, mpe na ndenge yango, bibongiseli yango ezali kokóma na mbongo mingi. Yango wana, zulunalo moko ya Angleterre (The Economist) elobaki ete tozali na ebandeli ya “eleko ya kopesa makabo mingi.”

Ntina moko oyo ezali kopusa bato bápesaka makabo ezali ete baguvɛrnema ezali kokoka te kosilisa mikakatano ya bato. Moto moko ya ONU oyo atindamaki na Afrika mpo na kosalisa bato ya Sida alobaki ete “kozanga makoki ya bakonzi ya politiki” ezali moko na bantina oyo ezali kotinda bato minene bákɔta na likambo etali kosalisa bato ya mokili mobimba mpo bázala nzoto kolɔngɔnɔ. Na buku na ye (The Foundation: A Great American Secret​—How Private Wealth Is Changing the World), Joel Fleishman alobi ete ezala na makambo lokola bobola, kolɔngɔnɔ ya nzoto, mabelé, kelasi, to kosalela bato makambo na bosembo, mingimingi bato ya bozwi “bazali kokoka kokanga motema te ntango bazali komona ndenge bibongiseli ya mokili mpe bakonzi bazali kokoka te kosilisa to kobongisa makambo yango.” Lokola bazali na mposa ete makambo ebonga sikoyo, bato mosusu ya bozwi oyo bapesaka makabo bazali komeka kosalela mayele oyo esalisaki bango bákóma na mbongo mingi.

Mosala oyo makabo yango ekoki kosala

Na ebandeli ya bambula ya 1 900, bato balobaki mpe ete ezali eleko ya kopesa makabo mingi. Bato ya bozwi mingi, na ndakisa Andrew Carnegie mpe John Rockefeller, bazwaki mokano ya kosalela mbongo na bango mpo na kosalisa babola. Bato yango bamonaki ete bibongiseli oyo esalemaki mpo na kosalisa babola, atako ezalaki kopesa bato biloko ya kolya mpe kosalisa bana oyo bazali na maladi, esilisaki te mosisa mpenza ya makambo yango. Lokola bamonaki ete basengeli kokanisa ndenge malamu ya kosalisa bato, basalaki bibongiseli oyo ekokɔtisa mbongwana na bomoi ya bato mpe bapesaki mbongo mpo na kosala bolukiluki mpo na kosilisa makambo oyo ezali kobimisa mikakatano yango. Banda na bambula yango, bankóto ya bibongiseli ya ndenge wana esalemi na mokili mobimba, oyo koleka 50 kati na yango ezali na mbongo koleka dolare miliare moko.

Ntembe ezali te ete bibongiseli yango esali makambo mingi ya malamu. Na lisalisi na yango, batongi biteyelo, babibliotɛkɛ, balopitalo, baparke, mpe bandako ya kobomba biloko ya kala. Ndenge moko mpe, bibongiseli oyo esalemi mpo mabelé ebotaka mbuma mingi esalisi mpo bato oyo bazali na mikili ya bobola bázala na biloko mingi ya kolya. Mbongo oyo epesami mpo na bolukiluki na mosala ya monganga esalisi na kozwa bankisi oyo ekoki kosalisa bamaladi mpe, na bisika mosusu, nkisi oyo ekoki kosilisa bamaladi mosusu, na ndakisa fièvre jaune.

Lelo oyo, lokola bato bamipesi mingi mpo na kosilisa mikakatano ya bato na mokili mpe mpo na yango bazali kopesa mbongo mingi, bato mingi bazali komona lokola nde bakolonga. Na 2006, prezida moko ya kala ya États-Unis alobaki boye na etuluku moko ya bato ya mbongo oyo bapesaka makabo: “Makabo oyo bato bazali kopesa ekosalisa mingi.”

Nzokande, bato mingi bazali na makanisi ndenge mosusu. Laurie Garett, mwasi moko oyo asalaka na ebongiseli moko oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto, akomaki boye: “Moto mosusu akoki kokanisa ete lokola mbongo ezali mingi, mosika te tokosilisa mikakatano mingi oyo etaleli kolɔngɔnɔ ya nzoto na mokili mobimba. Kasi, kokanisa bongo ezali libunga.” Mpo na nini? Alobelaki mikakatano lokola mbongo mpo na kofuta basali ya bibongiseli yango, kanyaka, kozanga kosala na bomoko, mpe bato oyo bazali kopesa makabo balingi ete mbongo na bango esalelama kaka na makambo oyo bango baponi, na ndakisa mpo na kosilisa maladi ya Sida.

Lokola bomoko ezali te mpe bato oyo bazali kopesa makabo “balingi ete mbongo na bango esalelama mingimingi mpo na bamaladi oyo eyebani mingi na esika esalelama mpo na bamaladi nyonso,” Garret amoni ete “ezali na likama monene ete eleko ya kopesa makabo ekokisa bilikya ya bato te mpe makambo ebeba lisusu koleka.”

Ntina oyo mbongo mpamba ekoki te

Makabo oyo bato bazali kopesa, ata soki ezali mpo na mokano nini, ekokoka kosilisa mikakatano nyonso te. Mpo na nini? Ya liboso, ezala mbongo, ezala kotánga kelasi ekoki te kosilisa makambo lokola lokoso, koyina, kokanisela basusu mabe, bolingo ya ekólo, koboya bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu, mpe mateya ya mangomba ya lokuta. Atako makambo yango ebakisaka mpasi ya bato, yango te nde ebimisaka bampasi yango. Ndenge Biblia emonisi yango, ezali na makambo mosusu.

Moko na yango ezali ezaleli ya kozanga kokoka. (Baloma 3:23; 5:12) Ezaleli yango etindaka biso tókanisa mpe tósalaka makambo ya mabe. Genese 8:21 elobi boye: “Makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.” Lokola bamilio ya bato bazali kolanda makanisi yango, bazali komipesa na pite mpe na komɛla bangi. Makambo yango ezali kosala ete bamaladi mingi, na ndakisa Sida, epalangana na mokili.​—Baloma 1:26, 27.

Likambo ya mibale oyo ebimiselaka bato mpasi ezali ete moto akoki te komiyangela. Yilimia 10:23 elobi ete: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” “Kozanga makoki ya bakonzi ya politiki,” oyo tolobelaki liboso, ezali ntina oyo etindi bato mingi bápesaka makabo na ndenge na bango kozanga kotuna bakonzi ya Leta. Biblia emonisi ete bato basalemá mpo Mozalisi ayangela bango, kasi te mpo bámiyangela bango moko.​—Yisaya 33:22.

Lisusu, Biblia elaki ete Mozalisi, Yehova Nzambe, akosilisa mikakatano nyonso oyo bato bazali kokutana na yango lelo oyo. Kutu, asili kozwa bibongiseli mpo na yango.

Mopesi Monene ya makabo

Mbala mingi, bato oyo bapesaka makabo basalaka yango mpo balingaka bato. Nzokande, moto moko te azali na bolingo mingi mpo na bato koleka Mozalisi. Yoane 3:16 elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” Ya solo, Yehova apesaki eloko oyo eleki mbongo mpo na kolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Apesaki Mwana na ye molingami lokola “lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Ntoma Petelo akomaki na ntina na Yesu ete: “Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete, mpo tókoka kotika masumu mpe tózala na bomoi ya boyengebene. Mpe ‘mpo na bampota na ye bino bobiki.’”​—1 Petelo 2:24.

Longola yango, Yehova azwi bibongiseli mpo na koyangela bato. Mpo na yango, atye guvernɛma moko oyo ebengami Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango oyo ezali na likoló ekolongola bato mabe nyonso mpe ekotya kimya mpe bomoko na Mabelé mobimba.​—Nzembo 37:10, 11; Danyele 2:44; 7:13, 14.

Na nzela ya bibongiseli oyo asili kozwa mpo na kosilisa makambo oyo ebimiselaka bato mpasi, Nzambe akosala makambo oyo moto akoki kosala te, ata soki asangani na bato mosusu. Yango wana, na esika básala bibongiseli ya kopesa makabo mpo na kosalisa basusu, Batatoli ya Yehova bazali komekola Yesu Klisto na ndenge bazali kosalela ntango mpe mbongo na bango mpo na kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.’​—Matai 24:14; Luka 4:43.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 19]

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”

Maloba yango ya Biblia oyo ezali na 2 Bakolinti 9:7, ezali etinda oyo Batatoli ya Yehova balandaka. Wana bazali kosalela ntango, makasi, mpe mbongo na bango mpo na kosalisa basusu, balandaka toli oyo: “Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”​—1 Yoane 3:18.

Ntango bato bakutani na mokakatano, na ndakisa ntango likama moko monene esalemi, Batatoli bamonaka ete ezali libaku mpo na kosalisa bato yango. Na ndakisa, nsima ya mipɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na États-Unis (mipɛpɛ oyo babengaki Katrina, Rita, mpe Wilma), bankóto ya Batatoli bakendaki na biloko na bisika oyo makama esalemaki mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya kotonga. Na lisalisi ya bandeko oyo bazalaki kotambwisa misala na bisika yango, Bandeko yango babongisaki bandako koleka 5 600 ya Batatoli ya Yehova mpe Bandako ya Bokonzi 90​—pene na bandako nyonso oyo ebebaki.

Batatoli ya Yehova basɛngaka badiimɛ te, bakɔngɔlaka mpe mabonza te. Misala na bango nyonso esimbami na makabo ya bolingo malamu.​—Matai 6:3, 4; 2 Bakolinti 8:12.

[Bililingi na lokasa 17]

Mbongo ekoki te kosilisa makambo oyo ebimiselaka bato maladi mpe bampasi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Chris de Bode/​Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto