Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Janvier nk. 5-7
  • Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likamwisi moko ya ekeke ya liboso
  • Ezali boni lelo?
  • Bolingo elongaka koyina
  • Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?
    Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bolingo na yo ezali mpenza monene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Janvier nk. 5-7

Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?

MOLAKISI na mibeko moko alobaki ete mpo na kozwa “bomoi ya seko,” esengeli kolinga Nzambe na motema mobimba mpe kolinga mozalani lokola yo moko. Yesu apesaki molakisi na mibeko yango longonya mpe alobaki na ye ete: “Ozongisi [malamu], salá boye mpe [okozwa] bomoi.” (Luka 10:25-​28; Levitike 19:18; Deteronome 6:5) Kasi, lokola mobali yango azalaki na mposa ya komimonisa ete azali sembo, atunaki ete: ‘Nani azali mpenza mozalani na ngai?’

Na ntembe te, molakisi na mibeko akanisaki ete Yesu akoloba ete: “Bandeko na yo Bayuda.” Kasi Yesu ayebisaki ye lisese ya Mosamalia malamu, oyo ezali komonisa ete ata bato ya bikólo mosusu bazali mpe bazalani na biso. (Luka 10:29-​37; Yoane 4:7-9) Na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, Yesu amonisaki ete kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso ezali mibeko mibale oyo eleki monene kati na mibeko nyonso oyo Mozalisi na biso apesaki.​—Matai 22:34-​40.

Kasi, ezali mpenza na etuluku moko ya bato oyo balingaka bazalani na bango? Ekoki mpenza kosalema ete bato nyonso bálingana?

Likamwisi moko ya ekeke ya liboso

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bato bakoyeba bango na bolingo oyo ezangi koponapona mposo, bikólo, mpe makambo mosusu oyo makabolaka bato. Alobaki ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino.” Na nsima abakisaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”​—Yoane 13:34, 35; 15:12, 13.

Mateya ya Yesu na ntina na bolingo, oyo malendisamaki na ndakisa na ye moko, mabimisaki likamwisi moko na ekeke ya liboso. Bayekoli na ye bamekolaki Molakisi na bango. Bayekolaki kolingana mpe yango ebendaki mpenza likebi ya bato. Tertullien, mokomi na ekeke ya mibale mpe ya misato T.B., alobelaki maloba ya kokumisa oyo bato balobaki na ntina na bayekoli ya Yesu: ‘Talá lolenge bazali kolingana mpe lolenge bazali pene ya kokufa moko mpo na mosusu.’

Mpo na yango, ntoma Yoane akomaki ete: “Esengeli mpe na biso ete tósopa bomoi na biso mpo na bandeko.” (1 Yoane 3:16, NW) Kutu Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bálingaka banguna na bango. (Matai 5:43-​45) Matomba nini makomonana soki bato balingi mpenza bazalani na bango lokola Yesu ateyaki?

Profesere moko ya makambo ya politiki amanyolaki mpenza na motuna yango. Yango emonisami na buku moko (The Christian Century) ntango atunaki ete: “Tokoki kokanisa ete Yesu akokaki kobwakela banguna na ye bagrenade, kobɛta bango mondoki, kobwakela bango mɔ́tɔ, kobwakela bango babɔmbi atomiki to kobwakela bango bamisile mpo na koboma ebele ya bamama na bana to kokómisa bango bibɔsɔnɔ?”

Profesere yango ayanolaki ete: “Motuna yango ezali mpenza makasi na boye ete ebongi kozwa eyano te.” Na yango, atunaki motuna oyo: “Soki Yesu akokaki kosala makambo ya ndenge wana te, mpe kosala bongo ekoki koyokana te na bomoto na ye, kasi ndenge nini biso tokoki kosala yango mpe kotikala sembo epai na ye?” Na bongo, tosengeli kokamwa te na ndenge bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki koboya komikɔtisa na bitumba. Etamboli na bango elobelami na babuku mingi ya masolo ya bato. Tótalela bobele ndakisa mibale.

Buku moko [(Our World Through the Ages) (Mokili na boumeli ya bileko)] ya N. Platt mpe M. J. Drummond, elobi ete: “Etamboli ya baklisto ekeseneki mpenza na oyo ya Baloma. . . . Lokola Klisto ateyaki kimya, baklisto baboyaki kosala mosala ya soda.” Mpe buku mosusu [(The Decline and Fall of the Roman Empire) (Kobeba mpe kokwea ya bokonzi ya Loma)] ya Edward Gibbon, elobi ete: “[Baklisto ya liboso] baboyaki kosala misala ya Leta to misala ya kobundela mboka. . . . Ekokaki kosalema te ete baklisto bándima kosala mosala ya soda kozanga kotika mosala ya bulɛɛ.”

Ezali boni lelo?

Lelo oyo ezali na bato oyo bazali kolinga bazalani na bango lokola Klisto ateyaki? Buku moko (Encyclopedia Canadiana) elobi ete: “Mosala ya Batatoli ya Yehova ezali ya kolendisa mpe kozongisa boklisto ya liboso oyo Yesu mpe bayekoli na ye basalelaki . . . Bango nyonso bazali bandeko.”

Yango elingi koloba nini? Elingi koloba ete Batatoli ya Yehova bapesaka nzela na eloko moko te​—ezala mposo, ekólo, to etuluka​—oyo ekosala ete báyina bazalani na bango. Baboyaka mpe koboma, mpamba te, na elobeli ya elilingi, basili kotula mimpanga na bango ete mizala bitimweli mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti, lokola Biblia esakolaki yango mpo na basambeli ya solosolo ya Nzambe.​—Yisaya 2:4.

Likambo ya kokamwa ezali te soki totaleli maloba oyo ya ebandeli ya zulunalo ya Californie Sacramento Union: “Tokoki koloba ete soki bato ya mokili mobimba bazalaki lokola Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ bato basopaka lisusu makila te mpe mbɛlɛ bayinaka lisusu mpe te, bolingo nde ekokaki kozala bipai binso!”

Bobele bongo, mokomi moko ya zulunalo Ring na ekólo Hongrie akomaki ete: “Namoni ete soki na mabelé mobimba ezalaki bobele Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ bitumba ezali lisusu te mpe mosala ya bapolisi ekokaki kozala bobele kolekisa mituka na nzela mpe kotalela mikanda ya kokɔta na mikili ya bapaya.”

Kati na Andare alle genti, zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike na Italie, mamɛlo moko akomaki mpe makambo ya malamu oyo amonaki epai na Batatoli ya Yehova: “Baboyaka mitindo nyonso ya mobulu mpe bayikaka mpiko na komekama ndenge na ndenge oyo bakutanaka na yango mpo na bindimeli na bango kozanga kotomboka . . . Oyo nde bokeseni ekokaki kozala na mokili soki mokolo moko biso banso tozwi ekateli ya koboya kokamata bibundeli lokola Batatoli ya Yehova!”

Batatoli ya Yehova bayebani na ezaleli na bango ya kosalisa bazalani na bango. (Bagalatia 6:10) Kati na buku na ye Basi kati na bolɔkɔ ya Basovietiki (na Lingelesi), mwasi moko ya mboka Lituanie alobaki ete abɛlaki makasi wana azalaki kosala na kaa ya Potma na katikati ya bambula ya 1960. “Na boumeli ya maladi na ngai, [Batatoli ya Yehova] basalisaki ngai lokola balifulumɛ ya makoki mpenza. Nakokaki kolikya te ete nakozwa lisungi ya malamu boye, mingimingi na kati ya kaa.” Abakisaki ete: “Batatoli ya Yehova batalelaka yango lokola mokumba na bango, kosalisa moto nyonso, ezala ata moto ya lingomba nini to ya ekólo nini.”

Eumeli naino te, bapanzi-nsango na ekólo Tchèque balobaki mpe lolenge moko na ntina na etamboli ya Batatoli ya Yehova na kaa ya minyoko. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Severočeský deník) elobelaki filime oyo esalemaki na engumba Brno oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bakimá mboka,” elobaki ete: “Tosengeli koyeba ete ata bakangami oyo bazalaki na bango esika moko [Bayuda ya Tchèque mpe ya Slovaque oyo babikaki] balobaki malamu na ntina na Batatoli ya Yehova oyo bakangamaki. Bato mingi balobaki ete ‘bazalaki mpenza bato ya mpiko, oyo bazalaki ntango nyonso kosalisa biso soki likoki ezali, atako yango ezalaki likama mpenza mpo na bomoi na bango. Bazalaki kobondela mpo na biso lokola nde tozalaki bato ya libota na bango. Balendisaki biso ete tólɛmba te.’”

Kasi, ezali boni mpo na baoyo bayinaka yo? Okoki kolinga bango?

Bolingo elongaka koyina

Liteya ya Yesu oyo etali kolinga banguna eyokani na lisese ya Biblia oyo elobi ete: “Soko moyini na yo ayoki nzala, pesá ye kwanga ete alya; soko azali na mposa na komɛla, mɛlisá ye mai.” (Masese 25:21; Matai 5:44) Mpo na matomba oyo eutaka na bolingo ya bato oyo liboso bazalaki kotalelama lokola banguna, mwasi moko moyindo ya Amerika oyo auti kokóma Motatoli ya Yehova akomi ete: “Mokolo mosusu natangisaki mpisoli na komona bolingo ya solosolo oyo Batatoli ya Yehova mindele bamoniselaki ngai, bato oyo, eleki mwa mikolo, nakokaki koboma bango kozanga kokakatana mpo na makambo ya politiki.”

Motatoli moko, moto ya France alobaki ete na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mwasi moko oyo azalaki kofanda penepene na bango afundaki mama na ye epai ya Gestapo. Alobi ete: “Mpo na mwasi yango, mama na ngai alekisaki mbula mibale na kaa ya monyoko na Allemagne, epai kuna etikalaki moke akufa. Nsima ya etumba, bapolisi ya France basɛngaki na mama ete afunda mwasi yango ete azalaki monɔ́ngi ya ba Allemands. Kasi mama aboyaki.” Na nsima, mwasi yango abɛlaki kanser. Motatoli alobaki lisusu ete: “Mama alekisaki ntango mingi mpo na kosalisa mwasi yango na basanza ya nsuka ya bomoi na ye. Nakoki kobosana soko moke te ndenge bolingo elongaki koyina na motindo wana.”

Ntembe ezali te ete bato bakoki koyekola kolingana. Bato oyo bazalaki banguna kala​—Batutsi na Bahutu, Bayuda na Baarabe, ba Arméniens na ba Turcs, ba Japonais mpe ba Américains, ba Allemands mpe ba Russes, Baprotesta mpe Bakatolike​—solo ya Biblia esangisi bango esika moko!

Soki bamilio ya bato oyo bazali koyinana sikoyo bakómi kolingana, mokili ekotonda na bolingo. Ya solo, mpo ete bato nyonso bálinga bazalani na bango, esengeli ete mbongwana moko monene esalema. Mbongwana yango ekosalema ndenge nini?

[Bililingi na lokasa 7]

Mindele na bayindo na Afrika ya Sudi

Bayuda na Baarabe

Bahutu na Batutsi

Na elobeli ya elilingi, Batatoli ya Yehova basili kotula mimpanga na bango ete mizala bitimweli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto