Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Janvier nk. 3-4
  • Bolingo mpo na bazalani ekei wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo mpo na bazalani ekei wapi?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo moko ya nsɔmɔ na mikolo na biso
  • Foti ya nani?
  • Mpo na nini bolingo esili kokóma mpiɔ?
  • Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?
    Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?
  • Makambo ya nsɔ́mɔ na Rwanda: Nani azali mobandisi na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali bitumba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tósangana na libɔndisi oyo Yehova azali kopesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Janvier nk. 3-4

Bolingo mpo na bazalani ekei wapi?

BAMILIO ya bato bazangi elikya mpe bazali na mawa, bayebi te epai wapi bakoki kozwa lisalisi. Mwasi moko amilelaki ete: “Nalyaka ngai moko, natambolaka ngai moko, nalalaka ngai moko mpe nalobaka ngai moko.” Bato oyo basepelaka kosalisa banyokwami mpe komonisela bango bolingo bazali mingi te.

Mwasi moko oyo azalaki kala mosali-mombongo alobaki ete: ‘Mokolo moko na mpokwa mwasi moko mokufeli-mobali oyo azalaki kofanda pene na biso abɛtaki na ekuke na ngai mpe alobi ete azalaki koyoka mawa mpo ete azali bobele ye moko. Nayebisaki ye na limemya mpenza kasi na maloba ya polele ete nazali na mosala mingi. Asɛngaki bolimbisi mpo ete atungisaki ngai mpe akendaki.’

Mwasi yango alobaki lisusu: ‘Nasepelaki mpo nalingaki kotungisama te. Mokolo oyo elandaki, na mpokwa, moninga moko abéngaki ngai na telefone mpe atunaki ngai soki nayebi mwasi oyo amibomaki na butu oyo eleki na buludingi oyo nazalaki kofanda. Nakanisi boyebi eyano, ezalaki mwasi oyo abɛtaki na ekuke na ngai.’ Na nsima, mwasi wana oyo azalaki mosali-mombongo alobaki ete yango epesaki ye “liteya monene.”

Eyebani mpenza ete bana mike oyo balingaka bango te bakoki kokufa. Kasi, mikóló oyo balingaka bango te bakoki mpe kokufa. Elenge mwasi moko kitoko ya mibu 15, na mokanda oyo akomaki mpo na komiboma, alobi boye: “Bolingo elimboli komiyoka lisusu te ete ozali yo moko.”

Likambo moko ya nsɔmɔ na mikolo na biso

Esili koleka mwa bambula, zulunalo Newsweek ekomaki maloba oyo na ntina na koyinana oyo ezali komonana kati na bituluka: “Mokano ya mobu ezalaki ete, ‘Yiná mozalani na yo.’” Na boumeli ya bitumba kati na bato ya bikólo bikeseni ya Bosnie mpe Herzegovine, mboka oyo kala ezalaki na kati ya Yougoslavie, bato koleka milio moko basengelaki kokima bandako na bango mpe bankóto mosusu babomamaki. Nani abomaki bango? Mwana mwasi moko oyo babenganaki ye na mboka na ye amilelaki ete: “Ezali bato oyo bazalaki kofanda penepene na biso. Toyebanaki na bango.”

Mpo na Bahutu mpe Batutsi 3 000 oyo bazalaki kofanda na mboka Ruganda, mwasi moko alobaki ete: “Tozalaki kofanda esika moko na kimya.” Zulunalo New York Times eyebisi ete: “Makambo oyo masalemaki na mboka wana, ezali yango mpe esalemaki na Rwanda mobimba. Bahutu na Batutsi bazalaki kofanda esika moko, bazalaki kobalana, kozanga komituna to kozanga ata koluka koyeba nani azali Hutu to nani azali Tutsi. Na nsima makambo mabongwanaki mbala moko” mpe “babandaki kobomana.”

Bobele bongo, Bayuda na Baarabe ya Israël bazali kofanda esika moko, kasi mingi bazali koyinana. Na boumeli ya ekeke ya ntuku mibale, makambo motindo yango masalemi na Irlande du Nord, na Inde mpe Pakistan, na Malaisie mpe Indonésie, mpe kati na bato ya mposo ndenge na ndenge na États-Unis​—ɛɛ, makambo yango mazali kosalema mpenza na mokili mobimba.

Bandakisa oyo ezali komonisa koyinana kati na bituluka to kati na mangomba ezali mingi. Na boumeli ya lisolo ya bato bolingo ekóma naino mpiɔ boye te.

Foti ya nani?

Lolenge moko na bolingo, bato bayekolaka koyina. Loyembo moko oyo eyebani mingi elobaka ete bana “báyekola koyina noki/Liboso ya mbula motoba to nsambo to mwambe/Basengeli koyina bato nyonso oyo bandeko na bango bayinaka.” Koyinana ezali koteyama lelo mingi koleka. Mangomba malongi te koteya bato na bango bolingo.

Zulunalo Le Monde etunaki motuna oyo: “Ndenge nini okoki kondima ete Batutsi na Bahutu oyo bazali kobunda na Burundi mpe na Rwanda bateyamaki na bamisionere bobele moko mpe bazalaki koyangana na bandakonzambe bobele moko?” Ya solo mpenza, zulunalo National Catholic Reporter elobi ete “bato 70 likoló ya monkama na Rwanda bazali Bakatolike.”

Na ebandeli ya ekeke oyo, bikólo ya Mpoto ya Ɛsti bikómaki koboya kondima Nzambe mpo na mateya ya kominizme. Mpo na nini? Na mobu 1960, mokambi moko ya eteyelo ya teoloji na engumba Prague, na ekólo Tchécoslovaquie, alobaki ete: “Ezali biso, biso moko baklisto, nde tozali babandisi ya kominizme . . . Bómikundola ete bakoministe bazalaki liboso baklisto. Soki lelo bandimaka te ete Nzambe moko ya sembo azali, foti ya nani?”

Tótalela makambo mangomba basalaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na ntina na matata yango, Frank Crozier, mokonzi ya basoda mpe moto ya ekólo Angleterre alobaki ete: “Mangomba ya boklisto ya mokili mazali kosopa makila mingi mpe biso tosalelaki mposa na bango ya kosopa makila.” Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, zulunalo The New York Times elobaki ete: “Kala, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bazalaki ntango nyonso kolendisa bitumba ya bikólo na bango. Bazalaki kopambola mampinga ya bikólo na bango mpe bazalaki kobondela mpo ete bálonga bitumba yango. Nzokande, na ngámbo mosusu baepiskɔpɔ mpe bazalaki kobondela liboso ya bato mpo na mampinga na bango.”

Kasi, Yesu Kilsto amonisaki bolingo na misala na ye nyonso, mpe ntoma Paulo akomaki boye: “Bino mpenza bosili kolakisama na Nzambe mpo na kolingana.” (1 Batesaloniki 4:9) Mokomi moko ya zulunalo Sun na Vancouver akomaki ete: “Baklisto ya solosolo bazali bandeko kati na Yesu Klisto. Bakoki soko moke te kosalana mabe na nko.”

Na ntembe te, mangomba mazali na ngambo monene mpo na kozanga bolingo oyo ezali komonana lelo. Lisolo moko ebimaki na zulunalo India Today elobaki ete: “Makambo ya nsɔmɔ koleka esalemi na nkombo ya mangomba.” Na yango, ntina moko monene mpo na kolobela motema makasi oyo bato bakómi na yango mpo na bazalani ezali.

Mpo na nini bolingo esili kokóma mpiɔ?

Mozalisi na biso apesi eyano. Biblia, Liloba na ye, ezali kobénga ntango oyo tozali na yango ete “mikolo ya nsuka.” Bisakweli ya Biblia bizali komonisa ete oyo ezali ntango oyo bato ‘bakozanga bolingo.’ Kolobeláká ‘ntango oyo ya mpasi’ oyo Makomami ebéngi yango ‘nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo,’ Yesu asakolaki ete “bolingo na mingi [ekokóma] mpiɔ.”​—2 Timote 3:1-5; Matai 24:3, 12.

Na yango, kozanga bolingo oyo ezali komonana lelo ezali elembeteli ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Likambo ya esengo, yango elingi koloba ete mosika te, mokili oyo ya bato oyo babangaka Nzambe te, ekotika esika na mokili ya boyengebene oyo ekoyangelama na bolingo.​—Matai 24:3-​14; 2 Petelo 3:7, 13.

Kasi, tozali mpenza na ntina ya kondima ete mbongwana motindo wana ekosalema? Bato nyonso bakoki koyekola kolingana mpe kofanda esika moko na kimya?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto