Ntango bato nyonso bakolingana
NA LISOLO na ye likoló na Ngomba, Yesu Klisto alobelaki ntango oyo bato nyonso bakolingana. Na ebandeli ya lisolo na ye, Yesu atángaki Nzembo 37, alobaki ete: “Mapamboli epai na basɔkɛmi, zambi bakosangola mokili.” Nzembo yango ya Biblia ezali komonisa lolenge likambo yango ya malamu ekosalema, elobi ete: “Basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili.”—Matai 5:5; Nzembo 37:9.
Oyo nde mbongwana monene ekosalema—basali na mabe nyonso bakolongolama na mabelé, bobele bato oyo bazali kolingana nde bakotikala! Ndenge nini yango ekoki kosalema? Na lisolo na ye ya kafukafu likoló na ngomba, Yesu amonisaki ndenge yango ekosalema ntango ateyaki biso tóbondelaka ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse [lokola] na likoló.” (Matai 6:10) Esengeli koyeba epai wapi mokano ya Nzambe ekokokisama. Bobele na likoló te. Lisolo moko ya zulunalo The Christian Century emonisaki ete: “Tobondelaka ete, mokano na yo esalema na nse lokola na likoló.”
Kasi, Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango ezali mpenza nini? Na maloba ya polele, ezali mpenza boyangeli ya solosolo, oyo ezali koyangela na likoló. Yango wana ebéngami “bokonzi ya makoló.” (Matai 10:7, NW) Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, aponamaki Mokonzi na Bokonzi to boyangeli yango.
Liboso mpenza ete Malia abota Yesu, Yisaya, mosakoli ya Yehova asakolaki likambo yango ya kokamwa mpe makambo mosusu oyo masengelaki kosalema nsima, alobaki ete: “Baboteli biso mwana moko, bapesi biso mwana mobali; bokonzi bozali o mapeka maye. Bakobenga ye na nkombo iye: Nkumu wa bwanya, Nzambe wa [nguya], Tata wa lobiko, Mokonzi wa boboto. Bokonzi mpe boboto bokosuka te.” (Yisaya 9:5, 6, Liloba lya Nzambe) Nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, Yesu afandaki na makoló pene ya Tata na ye, kozeláká ete apesa ye ndingisa ya koyangela.—Nzembo 110:1, 2; Baebele 10:12, 13; Emoniseli 11:15.
Na bongo, nini ekokómela mokili oyo etondi na koyina? Talá lolenge Biblia eyanoli na motuna yango; Danyele, mosakoli ya Nzambe, alobaki boye: “Na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Na ntembe te, esakweli oyo ezali koyebisa mbongwana moko monene oyo ekosalema na makambo ya bato. Ebongiseli mobimba ya biloko ya ntango oyo, oyo kati na yango bato oyo bazali koboya na nko kotosa boyangeli ya Nzambe, ekolongolama na mabelé! Talá oyo ekokitana ebongiseli yango.
Bomoi na mokili ya sika ya sembo
Ntango mokili oyo enuni ekobomama, babiki bakozala. Biblia elobi ete: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:17) Ɛɛ, baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika, lokola Noa na libota na ye babikaki ntango mokili ya ntango na bango ebomamaki. Ntoma Petelo akomaki ete: “Tozali kotalela Likoló na sika mpe nse na sika, [lokola] elakaki [Nzambe]; boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:5-7, 11-13.
Ntango Bokonzi ya Nzambe ekozala boyangeli bobele moko, Biblia elaki ete: “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Bayengebeni bakozala na bomoi na mabelé oyo mapɛtolami. Ekozala mpenza eleko moko ya nkembo! Soki osali yango naino te, ekozala malamu otalela mapamboli oyo malobelami kati na Biblia oyo mamonisami na bililingi na bankasa oyo eleki.
Yango esepelisi yo na koyeba ete Mozalisi alaki makambo malamu mpo na bomoi ya baoyo bazali kosambela ye, boye te? Ya solo, yango ezalaki mokano ya Nzambe ntango akelaki babalani ya liboso mpe atyaki bango na Paladiso awa na mabelé! Talá makambo oyo Nzambe ayebisaki bango: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.”—Genese 1:27, 28.
Adama na Eva mbɛlɛ baboti bana, mpe wana bana bazalaki kokola, mbɛlɛ basangani na mosala ya kobatela paladiso. Kanisá naino esengo oyo bakokaki kozala na yango ya kokómisa elanga ya Edene monene wana libota ya bato ezali kokóma monene! Ya solo, mokano ya Nzambe ezalaki ete mabelé mobimba mákóma paladiso. Kasi, mokano yango ekokokisama mokolo mosusu? Tokoki komindimisa ete ekokokisama, mpamba te Nzambe ye moko alobi ete: “Ngai nasili koloba yango . . . mpe nakokokisa yango.”—Yisaya 46:11; 55:11.
Okosepela kofanda libela na libela kati na paladiso awa na mabelé lokola yango elobelami na Makomami mpe emonisami na bililingi ya nkasa oyo eleki? Nzokande, moto nyonso akozwa nzela ya kofanda kuna te. Esengeli kokokisa masɛngami. Masɛngami yango nini?
Masɛngami mpo na kozwa bomoi ya seko
Libosoliboso, baoyo balingi kofanda na mokili ya sika ya Nzambe basengeli koyekola kolinga bazalani na bango, lokola Nzambe azali koteya biso yango. Biblia elobi ete: “Bino mpenza bosili kolakisama na Nzambe mpo na kolingana.” (1 Batesaloniki 4:9) Lolenge nini Nzambe ateyaka biso yango?
Ezali mingimingi na lisalisi ya Biblia, Liloba na ye. Yango elingi koloba ete, mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli kondima mateya ya Nzambe oyo mazwami kati na Biblia. Moto moko ya Azia, oyo azalaki koyekola Biblia, alobaki ete: “Nazali kozela na motema likoló eleko oyo elobelami na Biblia, ntango bato nyonso bakoyekola kolingana.”
Kati na libondeli moko oyo asalaki epai na Tata na ye, Yesu alobelaki lisɛngami moko ya ntina. Alobaki ete: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyeba yo Nzambe moko ya solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Mwa buku ya nkasa 32 oyo ezali na moto ya likambo ete Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? ekosalisa yo ete ozwa boyebi yango. Okoki kozwa mwa buku yango soki otindi mokanda na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo, to na adresi ebongi na yo na lokasa 5.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Makambo oyo Nzambe alaki
Bato ya mokili mobimba bakolingana lokola bandeko
“Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Kobomana mpe bitumba ekozala lisusu te
“Bato mabe bakolongolama na mokili.”—Masese 2:22.
“[Nzambe] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”—Nzembo 46:9.
Bilei kitoko bikozala mingi
“Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na ngomba; mpe mbuma na yango ikokóma bebo.”—Nzembo 72:16, NW.
Bato na banyama bakofanda na kimya
“Mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana ya mpate, mpe nkoi ekolala esika moko na mwana ya ntaba; . . . mpe mwa mwana ya moke ya mobali akokamba yango.—Yisaya 11:6, NW.
Maladi, bobange, mpe liwa ekozala lisusu te
“[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:4.
Balingami na biso oyo bakufá bakosekwa
“Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na [Yesu], mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29.