“Okoki kotika yango—Biso totiká!”
EUTI NA MOKOMELI NA BISO NA JAPON
Masolo mosusu elobaka ete, na bambula ya 1500, masuwa moko ememaki bato etelemaki na Japon emonanaki lokola nde “bato yango bazalaki kopelisa mɔ́tɔ na estomá na bango.” Likambo yango ya kokamwa ebendaki likebi ya bato, na boye ete na bambula ya 1880, komela likaya ekómaki momeseno na Japon. Nani akokaki kondima ete bakitani ya bato ya Japon oyo bakamwaki bakokaki kokóma kati na bameli minene ya likaya na mokili mobimba?
“TOLINGAKI komonana bakóló mpe komiyoka lokola bakóló bamiyokaka.”—Akio, Osamu, mpe Yoko.
“Nalingaki kokonda.”—Tsuya.
“Ezalaki bobele mpo na komeka.”—Toshihiro.
“Tokanisaki te ete likaya ekosala biso mabe.”—Ryohei, Junichi, mpe Yasuhiko.
“Nalingaki kosilisa mposa ya kosanza na ntɔngɔ nyonso na boumeli ya zemi ya mibale oyo nazalaki na yango.”—Chieko.
“Nazalaki komɛla likaya mpo namiyoka malamu na ntango ya makita oyo ezalaki kosalema na esika ya mosala.”—Tatsuhiko.
Wana ezali biyano ya etuluku moko ya bato oyo batunaki bango mpo na nini bazalaki komɛla likaya. Biyano motindo wana ezali kokamwisa te lokola eyebani ete bato mosusu babéngaka ekólo Japon paladiso ya bameli likaya. Nzokande, likambo ya kobenda likebi, etuluku ya bato nyonso oyo batángami awa batiki komɛla likaya. Yango ezali elonga monene soki otaleli mpenza esika bango bafandi. Ozali komituna mpo na koyeba ndenge bango basalaki? Tika tótalela naino lolenge bato bazali komɛla likaya mingi na Japon na mikolo na biso.
Lolenge bazali komɛla
Soko bakóló mibali 56 likoló ya monkama na Japon bamelaka likaya, nzokande na États-Unis bobele mibali 28 likoló ya monkama ya mibu 15 kino bakóló nde bamelaka. Kati na bameli likaya 34 000 000 na Japon, soko 22 % bazali basi, mingi kati na bango bazali bilenge. Ndakisa ya bakóló mpe piblisite epesi nzela ete bilenge mingi bákóma komɛla likaya. Esili koleka mibu ntuku mibale, États-Unis epekisaki kosala piblisite ya likaya na televizyo, kasi na Japon epekisami bobele sikawa.
Lisusu, likaya ezali kotekama bipai nyonso na babalabala ya Japon. Ntango bameli basimbi pakɛ ya likaya na mabɔkɔ, bobele bameli moke nde batyaka likebi na mwa likebisi oyo bakomi likoló na yango. Likebisi yango ekoki kozala na ndakisa boye: “Komɛla likaya mingi te; ekoki kosala yo mabe.” Longola kozanga koyeba makama minene ya likaya, ezali mpe na ndakisa mabe ya bato minene oyo bazali kolendisa bato ya Japon ete bámela likaya, kopesáká bango likanisi ya lokuta ete komɛla likaya ekobatela bango.
Likambo ya kokamwa ezali te ete masangá oyo ezali na Japon mpo na kotɛmɛla komɛla likaya ezali komilela mpo na bopɔtu oyo ekólo Japon ezali na yango ya kopekisa banamboka ete bámela likaya te. Kasi, balakisi babandi komona ntina ya koyebisa bato ete komɛla likaya ezali kotya bomoi na bango na likama. Ɛɛ, bameli likaya na Japon bazali koyoka mpasi ndenge moko na bameli likaya na bipai mosusu—mposa ya kosanza, mikakatano ya kopema, kosukosu ya makasi, mpasi na estomá, kozanga mposa ya kolya, kobɛla miyoyo, mpe mbala mosusu liwa ya mbalakaka oyo euti na kanser ya mimpululu, mpasi ya motema, to mikakatano mosusu.
Na mwa 1 Aprili 1985, kompanyi oyo esalaka makaya na Japon, oyo ezalaki ya Leta na boumeli ya mbula mingi, etɛkisamaki. Nzokande, kompanyi yango ezali naino na boyokani na Leta, yango ezali kolɛmbisa milende oyo ezali kosalema mpo na kopekisa bato bámela likaya te. Yango wana bibongiseli ya kopekisa komɛla likya etalelaka Japon lelo lokola ebombamelo ya bameli likaya. Ezali mpe mpo na yango nde zulunalo The Daily Yomiuri elobi ete minganga ya Japon bazali komilela ete Japon ezali “ekólo oyo ezali kolendisa komɛla likaya.”
Soki olingi koyeba ndenge bato mosusu balongaki kotika komɛla likaya, talá etanda oyo ezali na motó na likambo “Ndenge totikaki.”
Ndenge nini okoki kosala?
Toli ya bameli ya kala, lokola yango emonisami na etanda, ekoki kolobama boye: Zalá na ekateli makasi ya kotika komɛla likaya. Bolingo mpo na Nzambe mpe mposa ya kosepelisa ye ezali ntina malamu koleka. Mpe bolingo mpo na mozalani na yo ezali mpe ntina mosusu malamu. Omityela mokano mpe tosá yango. Salá ete bato báyeba ete olingi kotika komɛla likaya—yebisá yango na baninga na yo, mpe sɛngá lisalisi ya bato ya libota na yo. Katá komɛla mbala moko. Mpe salá nyonso oyo okoki ete opɛngola kozala esika moko na bato oyo bamelaka likaya.
Soki oyekolaka Biblia, zalaká mingi esika moko na Batatoli ya Yehova. Soki ozali elongo na bango, mposa na yo ya komɛla likaya ekokima noki. Epai mosusu, soki ozali Motatoli ya Yehova mpe ozali koyekola Biblia na moto moko oyo amelaka likaya, kolɛmba ye te. Salisá ye ete alinga Yehova koleka momeseno yango ya mabe.
[Etanda/Bililingi na lokasa 17, 18]
“Ndenge totikaki”
Mieko: “Ntango nabandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, namonaki ete nakotika te komɛla likaya. Nazalaki koyekola mpo ete bana na ngai báyeba lolenge ya bomoi ya boklisto. Kasi noki nayaki koyeba ete moboti asengeli nde kopesa ndakisa, na yango nabandaki kobondela Yahova Nzambe na molende mpenza mpo ete asalisa ngai. Ezalaki mpasi mpo na ngai ete nasala engebene mabondeli na ngai, mpe nayokaki mpasi na bantango mosusu. Kasi nakobosana soko moke te esengo ya kozala na lisosoli ya pɛto oyo nayokaki ntango nsukansuka nasikolamaki na momeseno yango ya mbindo.”
Masayuki: “Nazalaki komɛla pakɛ misato na mokolo, mpe nsima ya komeka mbala na mbala kotika, nazimisaki likaya na ngai ya nsuka mpe natikaki komɛla libela. Libota na ngai, baninga Batatoli mpe Yehova, basalisaki ngai ete natika. Moto moko te na banki esika nasalaka andimaki ete natiki komɛla likaya. Napesaki likanisi na esika ya mosala ete mpo na bonkonde epai na bakiliya, basáli basengeli komɛla likaya te na ntango ya mosala. Likanisi na ngai endimamaki, atako basali 80 likoló ya monkama bazalaki bameli likaya. Sikawa, bisika 260 ya banki na biso ezali kosalela likanisi yango.”
Osamu: “Lokola nazalaki koyekola solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe, nayebaki ete nasengeli kotika komɛla likaya. Kasi ekamataki soko mbula mobimba. Atako natikaki komɛla likaya, na boumeli ya sanza motoba nasengelaki kobundisa mposa na ngai ya komɛla likaya. Na motema na ngai nayebaki ete nasengelaki mpenza kozala na ekateli ya kotika.”
Toshihiro: “Lisiko ya Yesu esimbaki mpenza motema na ngai na boye ete nasalaki molende ya kozwa ekateli ya kotika komɛla likaya.”
Yasuhiko: “Ekateli na ngai ya kotosa Yehova Nzambe mpe kotika komɛla likaya ebikisi bomoi na ngai. Mokolo moko, gaze ebimaki mpe etondaki na eteni ya ndako oyo nazalaki kosala mosala. Na momeseno, mbele napelisi likaya, yango ekokaki kozikisa ndako mpenza. Kasi lokola natikaki komɛla likaya mwa mikolo liboso, yango nde nazali awa mpo na kolobela yango.”
Akio: “Ntango nakómaki koyoka mposa ya kosanza mbala na mbala, nakanisaki ete likaya ezalaki kosala ngai mabe. Kasi natikaki yango te. Makambo ya solosolo na ntina na makama ya komɛla likaya nayokaki yango epai ya mwasi na ngai, ye akómaki Motatoli ya Yehova. Nokinoki nabandaki koyekola Biblia, mpe natángaki na mikanda ya Watch Tower ete moto oyo amelaka likaya abebisaka bobele kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye moko te, kasi mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato ya libota na ye. Natikaki yango mbala moko!”
Ryohei: “Mwasi na ngai moto azalaki kosombela ngai makaya—pakɛ 20 mbala moko. Kasi nsima ya koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, aboyaki kosombela ngai eloko oyo ayebaki ete ekoki kosala ngai mabe. Na bongo, nafungolaki ngai moko butiki ya makaya. Nazalaki komɛla pakɛ misato na ndambo na mokolo. Na nsima nabandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Nokinoki nalingaki kokóma molobi malamu ya masolo ya Biblia. Na bongo, natikaki komɛla likaya mpo na kokokisa masɛngami mpo na kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya teokrasi.”
Junichi: “Mwana na ngai ya moke ya mwasi azali Motatoli mpe azalaki komibanzabanza mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai. Alobaki na ngai ete nalaka ye soki nakotika komɛla likaya, mpe natosaki elaka na ngai.”
Tsuya: “Ntango nakendaki mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi, nasɛngaki etyeli ya mputulu ya makaya mpe alimɛti. Nakamwaki na koyoka ete moto moko te amelaka likaya kuna. Nasosolaki ete nasengelaki kotika komɛla likaya. Mikolo mwambe oyo nalekisaki na mpasi makasi na lopitalo endimisi ngai ete nasengeli kozongela yango te.”
Yoko: “Nayekolaki likambo yango na bazulunalo mpe mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova, natalelaki lolenge Yesu aboyaki komɛla bilangwiseli oyo bapesaki ye ntango balingaki babaka ye likoló ya nzete ya mpasi. Nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye ete nalingi kozala pɛto mpo na kosanzola nkombo na ye. Banda wana, namelaka lisusu likaya te. Ntango nazalaki esika moko na bameli likaya, nalingaki komɛla milinga na bango, kasi nazalaki kokima, mpo nalingaki te ete mposa yango ya komɛla ezonga lisusu.”
Bameli yango ya kala bazwi ekateli ya komɛla likaya lisusu te. Omelaka likaya mpe olingi kotika yango?
Mieko
Osamu
Yasuhiko
Akio na mwasi na ye Sachiko
Junichi na mwana na ye ya mwasi, Meri
Yoko