NDENGE MAKABO NA YO ESALELAMAKA
Kobatela Bandako ya Bokonzi
01/04/2024
Nicole, elenge mwasi moko na Colombie alobi: “Nalingaka Ndako ya Bokonzi na biso! Ezali esika oyo nakutanaka na bandeko na ngai ya elimo.” Yo mpe oyokaka bongo?
Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basalaka makita na bango na bandako ya Bokonzi pene na 63 000. Bandako yango ezali esika moko ya malamu mpo na kosambela Nzambe na biso, kasi ekumisaka mpe nkombo ya Yehova. David, oyo azali mobongisi-nzela ya ntango nyonso na Colombie alobi: “Bandako na biso ya Bokonzi ekómisaka lisusu mateya na biso kitoko mingi. Bato mingi ya sika oyo bayaka, bakamwaka ndenge tobatelaka bandako yango na lolenge oyo ebongi.” Bopɛto yango ezali likambo eyaka kaka boye te. Mosala yango esalemaka ndenge nini?
Ndenge nini misala ya kobatela bandako ya Bokonzi ebongisamaka?
Masangá oyo esalelaka Ndako ya Bokonzi nde ezali na mokumba ya kobatela yango. Mpo na kosala yango bandeko basi mpe mibali, mbala na mbala bapɛtolaka bandako na bango ya Bokonzi. Basalaka mpe lisusu misala ya mikemike mpo na kobatela yango mpe kosala ete ebeba noki te.
Mpo na kosalisa masangá babatela bandako ya Bokonzi, Departema ya LDC etyá bandeko basi mpe mibali mpo na kopesa basusu formasyo ya kobatela bandako ya Bokonzi. Ndeko mokomoko oyo apesaka formasyo alandelaka bandako ya Bokonzi motoba kino zomi. Akendaka kotala yango mpe apesaka bandeko formasyo mpo na ndenge ya kobatela yango. Nsima ya bambula misato alandelaka ndako mokomoko ya Bokonzi mpo na koyeba soki ekobimisa makama te mpe soki ebatelami malamu.
Bandeko oyo bapesaka formasyo basalisaka biso tobatela Bandako na biso ya Bokonzi na lolenge oyo ebongi
Bandeko na biso ya basi mpe mibali basepelaka mingi na formasyo oyo bazwaka. Indhumathi, ndeko mwasi moko na Inde, alobi: “Formasyo yango ezali kitoko mpenza. Ezalaki esengo mingi ya koyekola ndenge ya kobatela bandako na biso ya Bokonzi na ndenge oyo ebongi.” Evans, ndeko mobali moko na Kenya, alobi: “Toyekolaki ete mpo na koboya kobebisa mbongo ebele tosengeli kosalaka misala ya mikemike liboso yango ekóma misala ya minene.”
Mbongo ya misala yango eutaka wapi?
Mbula na mbula mosolo oyo ebimaka mpo na kobatela bandako ya Bokonzi ekoki kokóma bankama ya badolare,a yango etali esika oyo Ndako ya Bokonzi ezali, bambula oyo yango esali mpe motángo ya masangá oyo esalelaka yango. Mbongo eutaka wapi mpo na misala nyonso wana?
Mosala ya kobatela bandako ya Bokonzi esimbami na makabo ya bandeko. Alexander, ndeko mobali moko na Kazakhstan, alobi: “Ndambo ya mbongo wana basalelaka yango mpo na kofuta Internet mpe makambo mosusu, lokola mai ná kura. Mpe ndambo mosusu esalelamaka mpo na kosomba biloko lokola bapapye serviette, ba gant, biloko ya kotya bopɛto mpe langi.” Mpe makabo oyo etikalaka esalisaka mpo na misala ya kobatela bandako ya teokrasi na mokili mobimba oyo esɛngaka mbongo mingi koleka.
Misala minene ya kobatela bandako
Soki misala ya kobatela Ndako ya Bokonzi moko ezali kosɛnga mbongo oyo eleki mbala mibale to misato mosolo oyo esalelamaka na sanza moko mpo na kobatela ndako yango, bankulutu basengeli kosolola na ndeko ya LDC oyo apesaka formasyo. Soki LDC endimi misala yango, mbala mingi mbongo mpo na misala yango eutaka na makabo oyo epesamaka mpo na kosunga misala na mokili mobimba. Na boumeli ya mobu ya mosala 2023, tosalelaki badolare milio 76,6 mpo na misala 8 793 ya ndenge wana. Tólobela mibale na yango.
Na Angola, Ndako ya Bokonzi moko oyo esali mbula 15 ekómaki na makambo mingi ya kobongisa. Esɛngaki bálongola bansinga ya kura ya kala mpe bátya ya sika, bifelo esalaki banzela, mpe ba voisin bamonisaki ete mai oyo ezalaki kouta na Ndako ya Bokonzi ezalaki kokɔtela bango. LDC etyaki manaka mpo na kobongisa ndako yango. Misala yango esɛngaki dolare 9 285. Ba voisin bazalaki na botɔndi mingi, mpe bakamwaki na ndenge misala yango esalemaki.
Angola, Ndako ya Bokonzi oyo ebongisami lisusu
Na Pologne, toiture ya ndako ya Bokonzi ezalaki kotanga mpe ebebisaki kati ya ndako. LDC epesaki nzela bábongisa toiture mpe bábongisa kati ya ndako yango. Mosala nyonso esɛngaki dolare 9 757. Sikoyo, ekosɛnga bambula mingi eleka liboso básala lisusu misala ya minene na ndako yango ya Bokonzi.
Pologne, bazali kobongisa Ndako ya Bokonzi
Kobatela bandako ya Bokonzi ekumisaka Yehova
Mosala ya kobatela bandako ya Bokonzi esalisaka biso kaka te mpo na kobatela makabo, kasi mpe ekumisaka Yehova. Shaun, ndeko mobali moko na Tonga, alobi boye: “Misala ya kobatela bandako ya Bokonzi esali ete tósambela Yehova na esika oyo ezali pɛto mpe oyo ebongisami malamu. Yango esalaka ete bato ya kartye báloba malamu mpo na Yehova. Toyokaka nsɔni te ya kobengisa bato na Ndako ya Bokonzi.”
Ndenge nini okoki kosalisa?
Biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ na bopɛto mpe kobatela esika na biso ya losambo. Marino, ndeko mobali moko oyo apesaka formasyo na Australie, alobi: “Biso nyonso tozali na libaku kitoko wana ya kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela bandako na biso ya Bokonzi. Ntango tozali kosala bongo, ezali komonana polele ndenge oyo tozali kobatela makabo ya bandeko mpe yango ezali kosalisa biso tosalela yango na bisika mposa ezali makasi.”
Joel, ndeko mobali moko na Inde, asepelaka kobatela Ndako na bango ya Bokonzi. Alobi: “Kosala elongo na bandeko esalisaka ngai namona ndenge oyo tokozala na mokili ya sika.” Nicole, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi: “Na mikolo eleki, nazalaki kopangwisa na Ndako ya Bokonzi, ntango bandeko mibali bazalaki kobongisa esika oyo mai ezalaki kotanga na ba toillete. Atako nabongisaki te elongo na bango likambo yango kasi nasalisaki na lolenge mosusu mpo likama ebima te.”
Soki olingi kozala volontɛrɛ na misala ya kopesa mabɔkɔ na Ndako ya Bokonzi na bino, sololá na Bankulutu ya lisangá na yo. Longola yango, makabo na yo ebatelaka kaka te Ndako ya Bokonzi na bino kasi mpe Bandako mosusu ya Bokonzi na mokili mobimba . Makabo yango ekoki kopesama na bakɛsi ya makabo oyo ezali na Ndako ya Bokonzi na bino to mpe na nzela ya donate.jw.org. Tozalaka na botɔndi mingi na elimo na bino ya bokabi.
Biso nyonso tokoki kosalisa mpo na kobatela bandako ya Bokonzi na biso
a Dolare nyonso tolobeli awa ezali dolare ya Amerika.