Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 136
  • Maria azali mama ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maria azali mama ya Nzambe?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tosambela mozalisi kasi eloko ezalisami te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • Liteya 5: Maria azali mama ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 136
Maria ná bebe Yesu

Maria azali mama ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

Te, Biblia eteyaka te ete Maria azali mama ya Nzambe, elobi mpe te ete bakristo basengeli kosambela Maria.a Tótala naino:

  • Maria alobaki ata mokolo moko te ete azalaki mama ya Nzambe. Biblia elobi ete abotaki nde “Mwana ya Nzambe,” kasi Nzambe ye moko te.​—Marko 1:1; Luka 1:32.

  • Yesu Kristo alobaki ata mokolo moke te ete Maria azalaki mama ya Nzambe to bato basengeli kosambela ye. Kutu, asembolaki mwasi moko oyo akumisaki mokumba ya Maria ya kozala mama na ye, na maloba oyo: “Te, Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:27, 28.

  • Maloba “Mama ya Nzambe” mpe Theotokos (Oyo aboti Nzambe) ezali na Biblia te.

  • Na Biblia, maloba “Mokonzi-mwasi ya likoló” elobelaka Maria te, kasi elobelaka nde nzambe-mwasi ya lokuta oyo Bayisraele oyo bakómaki bapɛngwi bazalaki kosambela. (Yirimia 44:15-19) “Mokonzi-mwasi ya likoló” yango ekoki kozala Ishtar (Astarte), nzambe-mwasi ya bato ya Babilone.

  • Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basambelaki Maria te, mpe bapesaki ye te lokumu ya ndenge mosusu. Moto moko ya istware alobi ete bakristo ya liboso “baboyaki mpenza losambo ya bikeko mpe bazalaki kobanga ete kopesa Maria lokumu ya ndenge mosusu esala ete losambo na bango ekokana na losambo moko boye ya nzambe-mwasi.”​—In Quest of the Jewish Mary.

  • Biblia elobaka ete Nzambe azali na ebandeli te mpe na nsuka te. (Nzembo 90:1, 2; Yisaya 40:28) Lokola azali na ebandeli te, akoki kozala na mama te. Longola yango, Maria akokaki te komema Nzambe na libumu na ye mpo Biblia emonisi polele ete ata likoló ezali kokoka ye te.​—1 Bakonzi 8:27.

Maria azali mama ya Yesu kasi “mama ya Nzambe” te

Maria abotamaki Moyuda, mpe azalaki mokitani ya Mokonzi Davidi. (Luka 3:23-31) Nzambe amoniselaki ye boboto mingi mpo na kondima na ye mpe azalaki kokangama na Nzambe. (Luka 1:28) Nzambe aponaki ye mpo azala mama ya Yesu. (Luka 1:31, 35) Maria ná mobali na ye Yozefe babotaki mpe bana mosusu.​—Marko 6:3.

Atako Biblia emonisi ete Maria akómaki moyekoli ya Yesu, kasi elobi makambo mosusu te mpo na ye.​—Misala 1:14.

Mpo na nini bato mosusu batalelaka Maria lokola mama ya Nzambe?

Bilembo ya losambo ya Maria ebandaki komonana na siɛklɛ ya minei ya ntango na biso. Na ntango yango, lingomba ya Katolike ekómaki lingomba ya Leta ya ampire ya Roma. Yango wana, bato mingi oyo bazalaki bapakano bakómaki bakristo. Eglize ekómaki mpe kondima liteya ya Bosato oyo ezali na Biblia te.

Liteya ya Bosato etindaki bato mingi na eglize báloba ete soki Yesu azalaki Nzambe, boye Maria asengeli kozala mama ya Nzambe. Na mobu 431 ya ntango na biso, likita moko ya lingomba oyo esalemaki na Efese, nde balobaki polele ete Maria azali “Mama ya Nzambe.” Nsima ya likita yango losambo ya Maria epalanganaki. Lokola bapakano bazalaki kokóma bakristo, mokemoke bililingi mpe bikeko ya Ngɔndɔ Maria ekómaki kozwa esika ya oyo ya banzambe na bango ya basi oyo bapesaka mabota, na ndakisa Artemisi, oyo Baroma bazalaki kobenga ye Diana mpe Isis.

Na mobu 432 ya ntango na biso, Pápa Sixte III asɛngaki bátonga eglize moko na Roma mpo na lokumu ya “Mama ya Nzambe.” Batongaki yango pene ya tempelo moko oyo eumelaki mingi, oyo batongaki mpo na lokumu ya Lucine, nzambe-mwasi Moroma ya mbotama. Mokomi moko alobeli eglize yango lokola “elembo oyo etikalá tii lelo, oyo emonisi ndenge losambo ya Maria ezwaki esika ya losambo ya Mama Monene, nzambe-mwasi ya bapakano, ntango lingomba ya bokristo ya nkombo mpamba ekɔtaki na Roma.”​—Mary​—The Complete Resource.

a Mangomba mingi eteyaka ete Maria azali mama ya Nzambe. Mbala mosusu babengaka ye “Mokonzi-mwasi ya likoló” to Theotokos, liloba ya Grɛki oyo elimboli “Oyo aboti Nzambe.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto