Tosambela mozalisi kasi eloko ezalisami te
“Okokumbamela bobele Jéhovah, Nzambe na yo, mpe okosambela bobele ye.”—LUKA 4:8.
1. Kosambela esengaka nini, mpe moindo nini tosengeli kosambela Nzambe ya solo?
KOSAMBELA” esengi “komonisa limemya, kokumisa to komipesa mobimba”. Nani tosengeli kosambela boye? Yesu Klisto ayanoli: Okolinga Jéhovah, Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37) Ntango Satana alobaki na Yesu ete akopesa ye bikonzi nyonso ya mokili soki akokumbamela ye, Yesu aboyaki mpe alobaki na ye: “Okokumbamela bobele Jéhovah, Nzambe na yo, mpe okosambela bobele ye.” (Luka 4:7, 8) Na maloba na ye mpe na misala na ye, Yesu amonisaki polele ete bobele Jéhovah Nzambe asengeli kosambelama. Kosambela ye esengi mpe ‘kosalela ye mosala ya bulee’, mpamba te “kondima oyo ezangi misala esili kokufa”.—Yakobo 2:26.
2. Mpo na nini ebongi kosambela bobele Mozalisi?
2 Ebongi kosambela Jéhovah, mpamba te ye azali Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, Mozalisi na makoló oya mazali kokamwisa biso mpe Mozalisi na mabelé, elongo na bikelamu nyonso ya bomoi bizali kati na yango. Na yango, bobele ye abongi ete bato ’bamema ye, bakumisa ye mpe bamipesa mobimba epai na ye.’ Biblia elobi: “Jéhovah, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama. (Emoniseli 4:11) Na ntembe te, moto moko te, nyama moko te mpe eloko moko te ebongi ete bamemya yango, bakumisa yango to bamipesa mobimba epai na yango. Bobele Jéhovah abongi kosambelama ye moko.—Exode 20:3-6.
Ezali likambo na noki!
3. Mpo na nini ezali likambo na noki mpenza ete tosambela Nzambe?
3 Na mikolo na biso, ezali likambo na noki ete tosambela Nzambe na lolenge malamu, mpamba te tozali kobika na eleko na kosambisa. Bomoi na biso ya seko nde ezali kotalelama. Bisakweli bizali kati na Liloba na Nzambe bilakisi biso ete, na “mikolo na nsuka” na biloko mabe ya ntango oyo, Yesu Klisto asili koya kati na nkembo na ye ya likoló “mpe baanzelu nyonso esika moko na ye”. Mpo na kosala nini? Yesu ye moko amonisaki yango, wana elobaki ye ete: “Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba.” Bampate bakokenda na “bomoi na seko”, kasi bantaba “bakolongwa kino kufa ya seko”.—2 Timote 3:1-5; Matai 25:31, 32, 46.
4. (a) Maloba nini Paulo asalelaki mpo na komonisa baoyo bakokufa libela elongo na mokili oyo? (b) Baoyo bakozwa bomoi ya seko bazali komonisa ezaleli nini?
4 Epai mosusu, ntoma Paulo alobaki mpo na “komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na likoló esika moko na baanze na ye na nguya, kati na epelelo na moto ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakozwa lifuti na kobeba na seko”. (2 Batesalonike 1:7-9) Bato na motó makasi, “bantaba”, oyo balingi koyoka nsango na mikano na Nzambe te to baboyi koyokanisa bomoi na bango na yango lokola ntango ezali naino, bango bakozwa kufa ya seko. Nzokande, basokemi, “bampate”, baoyo balingi koyeba Jéhovah, bazali koyoka malako na ye, mpe na nsima bazali kotosa mokano na ye, bango bakozwa “bomoi ya seko”. Yango wana Biblia elobi: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.”—1 Yoane 2:17, tala lisusu 2 Petelo 2:12.
5, 6. (a) Tosengeli kosala nini mpo na koyeba solo na ntina na Jéhovah mpe na mikano na ye? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete baoyo bazali koluka solo bakozwa yango, ata ezalela na bango ezali nini?
5 “Bampate” bandimi kopesa ntango na bango, makasi na bango mpe biloko na bango ya mosuni mpo na koluka solo. Bazali kolanda toli oyo epesami na Masese 2:1-5: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otia motema na yo koluka boyebi; ee, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami, mbele okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe.”
6 “Bampate” bakeseni na “bantaba” mpamba te “bampate” bandimi koluka Jéhovah. “Soko okoluka ye, akozwana na yo; nde soko okotika ye, akotika yo libela.” (1 Ntango 28:9) Na motindo yango, ata nini ezali mposo na ye, ekolo na ye, kotanga na ye mpe motindo na ye, soki moto aluki solo ya Nzambe, akozwa yango. Uta na likoló, Klisto mpe baanzelu na ye bakosenzela ete azwa libaku ya koyekola solo, ata azali kofanda wapi. Yango ekozwela ye bolamu nini? Yesu ayanoli: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3; tala mpe Ezekiele 9:4.
Toboya kosambela eloko ezalisami
7, 8. (a) Kosambela bato ezali na makama nini? (b) Ndenge nini bato mingi bazali komonisa epai na Marie limemya, lokumu to komipesa mobimba, ata kolekisa ndelo?”
7 Na mokili mobimba, bato mingi bazali kopesa na baninga na bango bato bakufa to bazali naino na bomoi-“limemya, lokumu to komipesa mobimba”. Bakanisi ete kosala bongo ezali eteni moko na losambo oyo basengeli kopesa na Nzambe, nzokande ezali kopengwisa bango na losambo ya solo. Ezali kotinda bango kondima mateya ya lokuta mpe kotosa milulu mizangi koyokana na mokano na Nzambe. Ndakisa monene epesameli biso na lolenge oyo bamilió na bato, kati na mikili ya katolike mpe ya ortodokse, bazali kotalela Marie, mama na Yesu.
8 Bato yango bazali kokumbama liboso na bikeko ya Marie. Engebene lingomba ya katolike, Marie azali “Ngondo Mosantu Théotokos”. Liloba théotokos elimboli “oyo aboti Nzambe” to “mama na Nzambe”. Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (na Anglais) elobi boye: “Marie azali mama na Nzambe. . . . Soki Marie azali mama na Nzambe te, bongo Klisto azali Nzambe te, azali mpe moto te.” Yango wana, na boyokani na liteya ya Trinité to Bosato Bosantu oyo bango bazali koteya, mangomba yango bazali koloba ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso na lolenge na moto, mpe na motindo yango Marie akomi “mama na Nzambe”. Bobele mokanda oyo moko touti kotanga ebakisi lisusu ete losambo na Marie esengi: “1) kokumbamela ye, komonisa botondi mpe limemya mpo na lokumu na ye ya Ngondo Mosantu, mama na Nzambe. 2) kosambela ye, to kobondela ye Notre Dame mpo ete alobela biso lokola ezali ye mama mpe mokonzi.”
9. Biblia ezali koteya ete Marie azali “mama na Nzambe”?
9 Nzokande, liloba théotokos emonani ata esika moko te kati na Makomami mapemami, mpe Biblia elobi ata esika moko te ete Marie azalaki “mama na Nzambe”. Yesu mpe baklisto ya ekeke ya liboso balakisaki liteya oyo te. Epai mosusu, Biblia emonisi polele ete Yesu azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso te oyo akomaki moto, kasi azalaki nde Mwana na Nzambea. Na yango, ntango anzelu asakolaki epai na Marie ete akobota mwana mobali, alobaki boye: “Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya na Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mwana na bulee oyo akobotama akobyangama Mwana na Nzambe.” (Luka 1:35) Yesu azalaki bongo Mwana na Nzambe, kasi Nzambe ye moko te oyo akomaki moto. Marie azalaki bongo mama na Mwana ya Nzambe, Yesu, kasi azalaki mama na Nzambe te oyo akokaki kokoma moto. Tala mpo na nini ezala Yesu, ezala bayekoli na ye, mokolo moko te babengaki Marie ete azali “mama na Nzambe”.
10, 11. (a) Bandakisa nini emonisi lolenge oyo Yesu azalaki kotalela mama na ye? (b) Ndenge nini bantoma mpe bayekoli na Yesu bazalaki kotalela Marie?
10 Lolenge oyo Yesu azalaki kotalela mama na ye emonisi esika na ye ezalaki nini. Biblia elobi na biso ete na libala moko esalemaki na Kana, “wana ezangaki vinyo, mama na Yesu alobi na ye ete, Bazali na vinyo te. Yesu alobi na ye ete, E mama, likambo nini kati na biso na yo?” Libongoli moko ya katolike, Votre Bible, ebongoli boye maloba wana ya Yesu: “Mwasi, likambo nini kati na ngai na yo?” (Yoane 2:3, 4; tala mpe Traduction du monde nouveau) Na libaku mosusu, moto moko alobaki na Yesu: “Esengo na libumu libotaki yo mpe na mabéle manungisaki yo!” Wana mbele ekokaki kozala libaku malamu mpo na Yesu ete akumisa mpenza mama na ye mpe alakisa bamosusu ete basala motindo moko. Kasi asalaki bongo te; ayanolaki nde boye: “Te, esengo ezali nde na bango bayoki liloba na Nzambe mpe batosi yango!”—Luka 11:27, 28.
11 Mikapo oyo mimonisi ete Yesu apesaki te na Marie nkembo to lokumu oyo ebongaki na ye te, soki mpe kopesa ye titre moko ya spécial. Amitikaki te kopusama na makambo matali libota mpo ete bazalaki mama na mwana. Bantoma mpe bayekoli balandaki ndakisa na ye, mpamba te esika moko te kati na Makomi mapemami bapesi na Marie lokumu, titre to makoki oyo ebongi na ye te. Bazalaki na limemya epai na ye lokola mama na Yesu, esili. Mokolo moko te balobaki mpo na ye ete azali “mama na Nzambe”. Bayebaki ete Yesu azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso te oyo akomaki moto, mpe, na yango, Marie akokaki kozala mama na Nzambe te, oyo ezali etelemelo eleki na mosika mpenza na esika oyo epesameli ye na Liloba na Nzambe.
Losambo na Nzambe mama
12. Epai wapi mpe ntango nini likanisi ebotamaki, engebene yango Marie azali “mama na Nzambe”?
12 Na bongo, liteya yango euti wapi? Epalanganaki mokemoke kati na boklisto ya kopengwa na ekeke ya misato mpe ya minei, mingimingi nsima na mobu 325, na mobu wana likita esalemaki na mboka Nicée bazwaki ekateli ya kondima liteya oyo ezwami na Biblia te, liteya oyo elobi ete Klisto azali Nzambe. Lokola likanisi wana ya libunga endimamaki, ezalaki lisusu mpasi te mpo na koteya ete Marie azalaki “mama na Nzambe”. Tala oyo tozali kotanga na ntina yango kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique: “Emonani lokola ete ezalaki na ekeke ya misato to na ekeke ya minei, na mboka Alexandrie, kuna nde titre ya [‘mama na Nzambe’] ekotisamaki kati na mateya ya mangomba. . . . Na nsuka ya ekeke ya minei, endimeli ya Théotokos ekomaki koteyama bipai binso kati na Lingomba.” Bobele buku oyo moko Nouvelle Encyclopédie catholique elobi lisusu ete liteya yango endimamaki na bakonzi na mboka Efese, na mobu 431”.
13. Eloko nini epusaki likita ya Efese, oyo bayanganaki na mobu 431 ya ntango na biso ete bakoka kobenga Marie “mama na Nzambe”?
13 Ezali likambo ya ntina kosimba nkombo ya mboka epai likita yango esalemaki. Kati na mokanda na ye Le culte de la déesse mère (na Angl.), E. James akomi boye: “Likita monene ya mboka Efese esalemaki na ndako-nzambe ya Théotokos na mobu 431. Nzokande, mboka wana eyebanaki mpenza mpo na losambo lozalaki kopesama kuna na nzambe-mwasi Artémis (Diane mpo na ba Romains), kuna bazalaki koloba ete ekeko ya nzambe-mwasi yango ekweaki longwa na likoló; eyanganaki bango na kati na temple monene oyo epesamaki uta mobu 330 liboso ya ntango na biso mpo na losambo ya Magna Mater [Grande Mère], na mboka wana (Efese), epai, bazalaki koloba ete ezalaki mboka ya Marie mpo na mwa ntango, tokoki kokamwa te na komona ete titre ‘mama na Nzambe’ epesamaki na ye.”
14. Makambo nini kati na lisolo ya bato mamonisi ete liteya yango ezali ya bopakano?
14 Lokola mpo na la Trinité, liteya oyo ya Marie “mama na Nzambe” ezali liteya ya bapakano, babongolaki yango ete ekoma ya boklisto. Liteya yango ezalaki na esika monene kati na losambo ya bapakano liboso na Yesu Klisto. Na ntina yango, totangi boye kati na mokanda la Nouvelle Encyclopédie britannique, esika bazali kolimbola liloba “nzambe mama”: “Ata nini kati na banzambe ndenge na ndenge ya basi mpe bilakiseli ya bamama, na makambo matali kozalisa, kobota, kozala na bana mingi, kosangana, kolya mpe kokola. Liloba yango epesamaki mpe na bato ndenge na ndenge, ndakisa banzambe basi Vénus mingi oyo esambelamaki na eleko ebengami âge de pierre mpe bobele titre oyo moko epesami na Ngondo Marie. . . . Epai na mabota nyonso, bato basalelaki elembo moko to mosusu ya mama mpo na kolakisa banzambe na yango ya basi. . . . Azali mobateli mpe moleisi na mwana oyo azali nzambe, mpe na bongo, mobateli mpe moleisi na bato nyonso na mokili.” Yango wana sángo Andrew Greely akomaki (kati na mokanda na ye The Making of the Papes 1978): “Elembo ya losambo ya Marie ezali eloko ezali kokangisa losambo ya boklisto mpe mangomba [ya bapakano] ya kala oyo bazalaki kosambela banzambe basi soko déesses mères.”
Losambo motindo oyo ebongi te
15. (a) Ezalela nini ekolaki kati na boklisto mokili oyo na ntina na Marie? (b) Engebene Biblia, bobele nani akoki kolobela biso epai na Nzambe?
15 Koloba ete Marie azali “mama na Nzambe”, ezali kotombola ye na etelemelo oyo ezali kosenga ete bato basambela ye. Ezali yango mpenza ezali kosalema uta bikeke mingi. Na mikili mingi, bankama na milió na bato bazali kosambela Marie to bazali kosenga na ye ete alobela bango, bazali bongo kosambelaka bikeko mpe bililingi ya Marie. Atako bateolojiens bazali komeka kolongisa mimeseno yango na kolobaka ete kosambela Marie ezali nde kosambela Nzambe na nsima na ye, nzokande Nzambe andimi likanisi yango te. “Mpo ete Nzambe azali moko mpe Mobandisi moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto Klisto Yesu.” (1 Timote 2:5; 1 Yoane 2:1, 2) Mpe Yesu ye moko alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto akokoma epai na Tata te soko na nzela na ngai te.”—Yoane 14:6.
16. Motindo nini Petelo mpe Yoane bamonisaki polele ete bobele Jéhovah nde asengeli kosambelama?
16 Kosambela Marie, kokumbama liboso na bikeko mpe bililingi ya Marie, ezali bongo kosambela eloko ezalisami to ekelamu na esika ya kosambela Mozalisi. Ezali idolatri to losambo na bikeko; nzokande, baklisto basengeli ‘kokima losambo na bikeko’. (1 Bakolinti 10:14) Talela ezalela na ntoma Petelo ntango Korneye, moto oyo azalaki Moyuda te, akumbamaki liboso na ye: “Wana ekomi Petelo, Korneye azwani na ye mpe akwei epai na makolo na ye mpe akumisi ye. Petelo nde atelemisi ye mpe alobi ete, Telema! Ngai mpenza nazali mpe moto.” (Misala 10:25, 26) Ebongaki te ete Korneye asambela moto, kofukamaka liboso na ye. Yango wana Petelo aboyaki. Mpo na ntoma Yoane, nsima na kozwa emonaneli oyo anzelu moko amonisaki ye, alobi na biso boye ete: “Nakwei kosambela liboso na makolo na anzelu oyo atalisi ngai makambo oyo. Alobi na ngai ete, Tika! Ngai nazali moombo moninga na yo, mpe na bandeko na yo basakoli, na bango bakotosaka maloba na mokanda oyo. Sambela Nzambe.” (Emoniseli 22:8, 9) Soki ata anzelu na Nzambe akoki kosambelama te, tokoloba boni mpo na bato to bamonisi na bato!
17. Lokola elobaki yango buku moko monene ya katolike, kokumisa Marie ekoki komema kino wapi?
17 Encyclopédie catholique endimi ete komipesa na Marie ekoki kosuka na losambo ebongi te. Tala maloba tokutaki kati na mokanda yango: “Ntembe ezali te ete lolenge oyo bato bamipesi epai na Ngondo Mosantu, mbala mingi bazali kolekisa ndelo mpe kosala na motindo mobongi te.”
18. Liteya oyo ezwami na Biblia te eutaki wapi?
18 Liteya oyo ezwami na Biblia te eutaki wapi? Mobandisi na yango azangi komonana azali moto mosusu te bobele Monguna na Nzambe, Satan le Diable. (Yoane 8:44) Na mokano nini apalanganisaki liteya ya boye? Alingaki kokitisa Nkolo Moyangeli monene Jéhovah, kotombola bato mpe kotia mobulu. Liteya oyo ezali kopengwisa bato longwa na losambo ya solo mpe ezali kopusa bango na koluka lobiko epai na bikelamu mpamba. Na boumeli ya bikeke mingi, akolisaki mpe bopusi ya bakonzi na mangomba likoló na bato, mpo bazalaki koteya na bato ete batosa na makambo nyonso epai na bakonzi na mangomba, kolobaka na bato ete bobele bango bakonzi na mangomba nde bakoki kokanga ntina na makambo mozindo matali Nzambe.
19, 20. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete “bampate” bakomona solo liboso ete Nzambe aboma mokili? (b) Mituna nini mikotalelama na lisolo elandi?
19 Nzokande, Yesu asakolaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Epai mosusu, Jéhovah alaki ete, na nzela na mosala ya kosakola Bokonzi, akoyanganisa “bampate” nyonso mpo na ‘koteya bango banzela na ye, mpo ete batambola na bikendelo na ye’. (Yisaya 2:2-4) Na ntina na “bampate” wana bayanganisami mpo na losambo na peto na Jéhovah, Yesu alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Elakisi ete baoyo bazali koluka solo bakomona yango mpe bakosikwama na mateya ya lokuta mazali koteyama kati na mangomba mpe mazali kokangisa bato nzela ete basala mokano ya Mozalisi te.
20 Mateya mosusu mpe milulu mosusu mizali kosalema kati na mangomba ezali kopengwisa bato na losambo ya solo ya Mozalisi na kopusaka bango ete basambela eloko ezalisami. Wapi bamoko na mateya yango mpe milulu Yango, mpe ezalaki na bopusi nini? Losambo ya solo esengi nini? Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala La Tour de Garde ya le 1.6.88 pages 10 kino 20.
Bozongeli
Lolenge nini Yesu amonisaki polele ete bobele Jéhovah nde asengeli kosambelama?
Na mikolo na biso, mpo na nini ezali likambo na noki ete tosambela Nzambe na lolenge malamu?
Mpo na nini esengeli te kopesa na Marie lokumu oyo ebongi na ye te?
Liteya oyo elobi ete Marie azali “mama na Nzambe” eutaki wapi?
Ndenge nini ntoma Petelo mpe ntoma Yoane bamonisaki polele ete bobele Jéhovah nde asengeli kosambelama?