BÓSƐNZƐLAKA!
Ndenge ya kobatela esengo na bantango ya mpasi—Biblia elobi nini?
Na bantango ya mpasi oyo tozali na yango, tokoki te komibongisa na makambo nyonso oyo ekómelaka biso. Kasi, mbala mingi moto azalaka na esengo kaka te mpo makambo ezali kotambola malamu, esengo eutaka nde na makanisi ya malamu. Biblia emonisi ete ezali na bato mosusu oyo ata soki bazali na mikakatano, ‘bazalaka mikolo nyonso na feti.’ (Masese 15:15, Bible na Lingala ya lelo oyo) Okoki kosala nini mpo ozala moto ya esengo? Talá mwa batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo.
Yiká mpiko na mitungisi
Biblia elobi: “Motungisi na motema ya moto enyokolaka ye, kasi liloba ya malamu esepelisaka ye.”—Masese 12:25.
Biblia ekoki kosalisa yo mpo omitungisaka mingi te. Mpo na koyeba yango, tángá lisolo “Biblia elobi nini mpo na mitungisi.”
Yokanáká malamu na bato
Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.”—Masese 17:17.
Soki otángi Biblia, okomona batoli oyo ekoki kosalisa yo ozala na boninga ya malamu na bato mosusu, yango ekosala ete omiyokaka te lokola ozali yo moko. Tángá lisolo “Kozala na baninga; solisyo mpo na kotika komiyoka yo moko.”
Lingá Nzambe mpe bato
Biblia elobi: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso. . . . Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”a—Matai 22:37-39.
Mpo okóma kolinga Nzambe mingi, osengeli kobondelaka ye. Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Nzambe ayokaka mabondeli na biso?”
Okomonisa ete olingaka basusu soki ozali kosalela bango makambo ndenge Yesu asɛngaki. Mpo na koyeba yango, talá lisolo “Qu’est-ce que la Règle d’or?”
Okosepela koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi, oyo ekoki kosalisa yo ozala na esengo na mikolo oyo ya mpasi? Soki olingi, ndimá koyekola Biblia ofele.
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.