NASA Photo
BÓSƐNZƐLAKA!
Guvɛrnema nini ekoki mpenza kotambwisa mokili mobimba?—Biblia elobi nini?
Baguvɛrnema na mokili mobimba ezali ya koningana. Ata na bamboka oyo emonanaka lokola bafandisá makambo, kasi mobulu ya bana-mboka, bokabwani na makambo ya politiki mpe botɔmboki ezali koningisa baguvɛrnema yango.
Biblia elobeli guvɛrnema moko oyo ebongi mpenza. Mbala mosusu osí oyoka nsango ya guvɛrnema yango. Ezali guvɛrnema oyo Yesu Kristo alobelaki na libondeli oyo babengaka “Notre père.”
“Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema mpe na mabele, lokola na likoló.’”—Matai 6:9, 10.
Biblia elobi nini mpo na Bokonzi yango?
Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo ebongi mpenza
Bokonzi yango ezali koyangela uta na likoló.
Yesu abengaki guvɛrnema yango “Bokonzi ya likoló.” (Matai 4:17; 5:3, 10, 19, 20) Yango wana, alobaki: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”—Yoane 18:36.
Bokonzi yango ekozwa esika ya baguvɛrnema ya mokili.
Biblia elobi: “Bokonzi yango . . . ekobukabuka makonzi yango nyonso [ya mokili] mpe ekosukisa yango, mpe yango moko ekotikala mpo na libela.”—Danyele 2:44.
Bokonzi oyo Yesu azali Mokonzi na yango ekobebisama ata moke te!
Biblia elobi: “Boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ekobebisama te.”—Danyele 7:13, 14.
Bokonzi yango ekotya kimya na mabele.
Biblia elobi: “Moto na moto akokona elanga na ye ya vinu pe ya olive na kimya, moto moko té akobangisa ye.”—Mika 4:4, Bible na Lingala ya lelo oyo.
Talá makambo mosusu etali Bokonzi yango
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alekisaki ntango mingi na “kosakola nsango malamu ya Bokonzi.” (Matai 9:35) Asakolaki mpe ete:
“Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Lelo oyo, nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na bamboka koleka 240. Tosɛngi yo oyekola makambo mosusu oyo etali guvɛrnema yango mpe oyeba oyo okoki kosala mpo ozwela yango matomba.
Talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini?