Thai Liang Lim/E+ via Getty Images
BÓSƐNZƐLAKA!
Makama ya basite ya kosolola na baninga mpo na bilenge
Na boumeli ya mobu 2025, baguvɛrnema mingi na mokili etungisamaki mingi mpo na makama ya basite ya kosolola na baninga mpo na bilenge. Ekólo moko epekisaki bilenge oyo bazali na mbula na nse ya 16 kosalela basite yango, mpe bikólo mosusu ezali mpe kotalela likambo yango.
Likambo ya kokamwa, ata mpe bilenge mosusu bazali komona makama ya kosalela basite ya kosolola na baninga. Ankɛtɛ moko esalemaki na États-Unis, na ebongiseli oyo babengi Pew Research Center, mpe oyo ebimaki na sanza ya 04/2025, emonisaki ete “bilenge mingi (48%) balobi [ete basite ya kosolola na baninga] ezali kobebisa bana mingi ya mbula na bango.”
Minganga balobelaki makama oyo basite ya kosolola na baninga ekoki kobimisa na makanisi ya bilenge. Mbula eleki, Dr. Vivek Murthy, oyo azalaki chef de la Santé publique américaine, alobaki: “Maladi ya makanisi ekómi mingi epai ya bilenge—mpe emonani ete basite ya kosolola na baninga ezali moko ya makambo oyo ezali kobebisa makanisi ya bilenge mingi.”
Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango na makama ya basite ya kosolola na baninga? Biblia epesi batoli oyo ekoki kosalisa baboti.
Oyo baboti bakoki kosala
Tótalela batoli oyo ya BIblia.
“Moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.”—Masese 14:15.
Lokola basite yango etondi na makama mingi, osengeli kotalela malamumalamu soki mwana na yo asengeli kosalela yango to te. Liboso ya kopesa mwana na yo nzela asalela basite yango, mindimisá ete azali na makoki ya kokanisa oyo ekosalisa ye ayeba kotya ntango, apona baninga ya malamu, mpe atalaka makambo oyo ebongi.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Mon enfant devrait-il utiliser les réseaux sociaux?” mpe “Protégez votre adolescent des dangers des réseaux sociaux.”
“Bósalela ntango na bino malamu.”—Baefese 5:16.
Soki opesi mwana na yo nzela asalelaka basite yango, tyelá ye mibeko mpo na ndenge ya kosalela yango, mpe monisá ye ndenge mibeko yango ekobatela ye. Landeláká mwana na yo; soki omoni ete eloko moko ebongwani na bizaleli na ye oyo esɛngi ete asalelaka lisusu basite yango mingi te, salisá ye asala yango.
Salelá video Kebá na basite Internet ya kosolola na baninga mpo na kosalisa mwana na yo ayeba ntina oyo otyeli ye bandelo.
Mpo na koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi na ntina etali makambo oyo baboti bakoki kosala, talá lisolo “Monganga moko oyo atalelaka makambo ya sante na ekólo alobeli makama ya ba-réseaux sociaux mpo na bana—Biblia elobi nini?”
Makambo mosusu
Biblia elobi ete tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1-5) Kasi, epesi biso mpe batoli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso na bantango yango ya mpasi. Liste ya masolo koleka 20 oyo euti na Biblia, oyo etali bana ná baboti ezali na lisolo “Bilenge mingi bakómi kobɛla na makanisi lelo oyo—Biblia elobi nini?”