Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 117
  • Réseaux sociaux, ezali kobebisa to kobongisa bomoi na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Réseaux sociaux, ezali kobebisa to kobongisa bomoi na ngai?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Barezɔ elyaka yo ntango mingi?
  • Barezɔ esalaka ete olalaka retare?
  • Barezɔ ezali kobebisa makanisi na yo?
  • Nasala nini soki baboti na ngai baboyi nasalela ba-réseaux sociaux?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Makama ya basite ya kosolola na baninga mpo na bilenge
    Makambo mosusu
  • Monganga moko oyo atalelaka makambo ya sante na ekólo alobeli makama ya ba-réseaux sociaux mpo na bana​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela boninga na yo ná bato mosusu
    Lamuká!—2021
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 117
Elenge mwasi moko azali kotala telefone na ye. Baemoji ndenge na ndenge ezingi ye.

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Réseaux sociaux, ezali kobebisa to kobongisa bomoi na ngai?

Baboti na yo bapesá yo nzela osalelaka barezɔ? Soki ɛɛ, lisolo oyo ekosalisa yo na makambo misato ya ntina mingi.

Na lisolo oyo tokolobela:

  • Barezɔ elyaka yo ntango mingi?

  • Barezɔ esalaka ete olalaka retare?

  • Barezɔ ezali kobebisa makanisi na yo?

  • Oyo baninga mosusu balobi

Barezɔ elyaka yo ntango mingi?

Kosalela barezɔ ezali lokola moto amati na mpunda oyo ezali ligboma, soki otambwisi yango te, yango nde ekotambwisa yo.

“Mbala mingi nalobaka ‘nakɔta kaka mpo na mwa miniti’, kasi nakosutuka boye nalekisi bangonga! Kaka lokola drɔgɛ, barezɔ ekoki kokómisa moto moombo na yango.”​—Joanna.

Oyebaki yango? Barezɔ ekómisaka bato lokola baombo mpo yango nde mokano basalelá yango. Bato oyo basalá yango bayebi ete soki ebele ya bato bazali kosalela yango mingi, yango ekosala ete bákɔtisa mbongo mingi na bapiblisite oyo batyaka kuna.

Omituna boye: ‘Nabosanaka ngonga ntango nazali kosalela barezɔ? Nakoki te kosalela ntango yango mpo na makambo mosusu ya ntina mingi?’

Oyo okoki kosala. Tyá ntango oyo osengeli kolekisa na barezɔ, mpe tosá yango.

Bililingi ezali komonisa elenge mobali moko na midi. 1. Alali na mbeto atye bakaske na matoi mpe miso liboso ya telefone. 2. Azali kobeta basket ná baninga na ye.

Tyá ntango oyo osengeli kosalela barezɔ

“Nasalá ete ba application mosusu na telefone na ngai ekangamaka na ngonga moko boye. Nsima ya kotosa bandelo oyo namityelaki, nakómaki na bokatikati mingi mpe yango esali ete nalekisaka lisusu ntango mingi te na barezɔ.”​—Tina.

Toli ya Biblia: “Bósalela ntango na bino malamu mpenza.”​—Baefese 5:16.

Barezɔ esalaka ete olalaka retare?

Bato mingi ya mayele balobi ete bilenge basengeli kolalaka ngonga 8, kasi mingi balalaka ngonga moke kaka. Moko ya makambo oyo esalaka ete bilenge bálalaka mingi te ezali barezɔ.

“Liboso nalala, nabwakaka liso na telefone na ngai nayeba soki eloko ya malonga ezali, kasi na nsima okomona nakolekisa ntango molai. Ezali ezaleli ya malamu te, nazali kobunda natika yango.”​—Maria.

Oyebaki yango? Moto oyo alalaka mingi te akoki kobɛla maladi ya makanisi mpe kokóma na mitungisi mingi. Jean Twenge, oyo azali profɛsɛrɛ ya mwasi na psychologie, amonisi ete moto oyo alalaka mingi te azalaka na mayoki ya malamu te. Abakisi ete “nsima ya mikolo” yango ekoki kobimisa “mitungisi makasi ya makanisi.”a

Omituna boye: ‘Nalalaka ngonga boni na butu?’ ‘Nasalelaka barezɔ na ntango oyo nasengelaki kopema to komibongisa mpo na kolala?’

Oyo okoki kosala. Tyá baaparɛyi na yo nyonso mosika ya mbeto na yo. Soki likoki ezali, tiká kosalela baaparɛyi ngonga mibale liboso okende kolala. Soki osalelaka alarme mpo na kolamuka na ntɔngɔ, luká eloko mosusu na esika osalela telefone to tablɛti.

Bililingi ezali komonisa elenge mwasi moko na ntɔngɔ. 1. Afandi na mbeto mpe azali kobaye kolamuka. 2. Alamuki na mbeto mpe azali kobenda nzoto na esengo nyonso.

Tiká kasalela barezɔ mwa bangonga liboso olala

“Na bantango mosusu natikalaka ntango molai liboso ya telefone na ngai, nayebi ezali malamu te, nazali kobunda natika. Nazali lisusu mwana moke te, nasengeli kokola. Nasengeli kolalaka na ngonga ya malamu mpo mokolo ekolanda nazala en forme.”​—Jeremy.

Toli ya Biblia: ‘Bólukaka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.’​—Bafilipi 1:10.

Barezɔ ezali kobebisa makanisi na yo?

Na kotalela ankɛtɛ moko oyo esalemaki na eteyelo moko, bana kelasi mingi bamonisaki ete “mbala mingi bamiyokaka mawamawa lokola bato bazangi elikya.” Barezɔ ekoki kozala moko ya makambo oyo esalaka ete bana yango bámiyoka bongo. Dr. Leonard Sax alobi, “soki moto azali kolekisa ntango mingi na barezɔ, komikokanisaka na basusu, yango ekoki kosala ete moto yango akóma komitungisa se komitungisa na makanisi.”b

“Bilenge mingi balingaka komikokanisa na basusu, mpe ezaleli yango ekómaka lisusu mabe koleka na barezɔ. Okoki kolekisa bangonga ebele na kotalaka bafoto oyo bato batye, ndenge bazali komemela bomoi na bango, na nsima okobanda kokokanisa bomoi na yo na ya bango, mpe nsuka okómi komona bomoi na yo ntina te.”​—Phoebe.

Oyebaki yango? Barezɔ ekoki kosalisa yo osololaka na baninga na yo oyo bazali mosika, kasi yango ekokani te na kosolola na moto na miso boye. Dr. Nicholas Kardaras alobi, “atako barezɔ ekoki kosalisa biso tósololaka na bato, yango ekoki te kokokisa mposa oyo tozalaka na yango ya komonana na bato boye na miso. Ekokisaka mpenza bamposa na biso nyonso te, mpo tosalemá na mposa ya kosololaka na bato na miso boye.”c

Omituna boye: ‘Namiyokaka mawamawa nsima ya kotala makambo oyo baninga na ngai bazali kotya na barezɔ?’ ‘Namonaka bomoi na ngai ntina te soki nakokanisi yango na oyo baninga na ngai batyaka na barezɔ?’ ‘Nalɛmbaka nzoto soki basepeli mpenza te na eloko oyo natye na barezɔ?’

Okoki kosala nini. Meká kotika barezɔ mpo na mwa mikolo, pɔsɔ moko, to sanza mobimba. Bandá kolekisa ntango mingi na baninga na yo, na miso boye to na nzela ya telefone, na nsima talá soki okozala kaka na mitungisi ndenge ezalaki liboso to okokóma na esengo mingi.

Bililingi ezali komonisa elenge mwasi moko. 1. Azali kotala na mawa nyonso bafoto na telefone na ye. 2. Azali kosolola na esengo nyonso na baninga na ye wana bazali kolya crème.

Lekisáká ntango mingi na baninga oyo bozali komonana na biso

“Ntango nazalaki kosalela barezɔ, nazalaki kolandela mingi makambo oyo bato mosusu bazalaki kosala. Nsima ya kokanga bakonte nazalaki na yango, namiyokaki lokola kilo moko elongwaki na mapeka na ngai, mpe nakómaki kosalela ntango na ngai na makambo oyo eleki ntina.”​—Briana.

Etinda ya Biblia: “Moto na moto ameka mosala na ye moko, bongo akozwa likambo ya kosepela na yango mpo na ye moko, kasi te mpo azali komikokanisa na moto mosusu.”​—Bagalatia 6:4.

a Nakotalela buku ya iGen.

b Euti na buku ya Why Gender Matters.

c Euti na buku ya Glow Kids.

Oyo bilenge mosusu balobi

Phoebe.

“Barezɔ ezalaki kolya ngai ntango mingi, mpe ezalaki kopesa ngai esengo mpenza te. Nazwaki ekateli ya kotika kosalela yango. Nsima kozwa ekateli yango, nazalaki komiyoka te lokola eloko moko ezali kozanga ngai. Kutu nakómá na makoki ya kosala makambo mingi, mpe nazali mpenza na esengo.”​—Phoebe.

Jacob.

“Na bantango mosusu nakangaka bakonte na ngai mpo na mwa ntango. Yango esalisaka ngai natya likebi na makambo oyo eleki ntina. Ezali na makambo mingi ya ntina oyo nakoki kosalela ntango na ngai, kaka barezɔ te.”​—Jacob.

Sienna.

“Mbala mosusu na mikolo ezali koya nakofungola lisusu konte na ngai, kasi mpo na sikoyo namoni nakata naino. Sikoyo nalingi nalandela mingi bomoi na ngai moko na esika ya kolandelaka bomoi ya bato mosusu. Barezɔ ekoki kobosanisa yo mikano na yo mpe baninga na yo ya solo.”​—Sienna.

Bozongeli: Réseaux sociaux, ezali kobebisa to kobongisa bomoi na ngai?

  • Ezali kolya yo ntango mingi? Tyá ntango oyo osengeli kolekisa na barezɔ, mpe tosá yango.

  • Ezali kosala ete olalaka retare? Tiká kosalela barezɔ ngonga mibale liboso okende kolala.

  • Ezali kobebisa makanisi na yo? Tiká kosalela yango mpo na mwa ntango, mpe lekisá ntango mingi na baninga na yo ya solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto