Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 112
  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili ya bitumba
  • Etumba oyo ekosilisa bitumba nyonso
  • Bitumba na Moyen-Orient​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mpasi oyo bitumba mpe mobulu ememelaka biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
  • “Bokoyoka lokito ya bitumba”
    Makambo mosusu
  • Etumba ya Ukraine, esali sikoyo mbula moko​—Elikya nini Biblia ezali kopesa?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 112
Bililingi: Bafoto ya bisika oyo bitumba ezali kosalema na Moyen-Orient. 1. Kopanzana ya bombi na Gaza. 1. Foto ya Jerusalem ntango bombi ekweaki kuna.

Lobɔkɔ ya mwasi: Yasser Qudaih/Anadolu via Getty Images; Lobɔkɔ ya mobali: RONALDO SCHEMIDT/AFP via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?

“Sikoyo nde ntango ya koboma mɔtɔ. Oyo ezali ntango moto nyonso asengeli koyeba komipekisa.”​—Maloba ya António Guterres, Secrétaire général des Nations Unies, mpo na ndenge Iran etindaki babombi na Israël na mokolo ya pɔsɔ, 13/04/2024.

Bitumba oyo ezali kobima na bikólo ya Moyen-Orient ezali komonisa makambo oyo ekoki kokómela mokili mobimba.

“Bitumba ezali kobima bisika mingi na mokili lelo oyo, ezali mbala ya liboso bitumba emonana mingi boye na mokili banda Etumba ya mibale ya mokili mobimba, mpe yango ezali kobimisela 2 miliare ya bato na mokili mobimba makama.”​—Conseil de sécurité des Nations Unies, 26/01/2023.

Bitumba ezali kosalema na bisika lokola Israël, Gaza, Syrie, Azerbaïdjan, Ukraine, Soudan, Éthiopie, Niger, Birmanie mpe Haïti.a

Bitumba ekosila mokoli nini? Bakonzi ya mokili bakokoka kotya kimya? Biblia elobi nini mpo na yango?

Mokili ya bitumba

Bitumba oyo ezali kobima na mokili mobimba emonisi ete etikali ntango moke, bitumba nyonso ekosila. Bitumba yango ezali kokokisa likambo moko oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo na biso. Biblia ebengi mikolo na biso “eleko ya nsuka ya mokili.”​—Matai 24:3.

  • “Bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba. . . . Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.”​—Matai 24:6, 7.

Tángá lisolo “Elembo ya “mikolo ya nsuka,” to ‘ntango ya suka’ ezali nini?” mpo omona ndenge bitumba na mokili ezali kokokisa bisakweli ya Biblia.

Etumba oyo ekosilisa bitumba nyonso

Biblia esakolaki ete bitumba na mokili ekosila. Nani nde akosilisa yango? Bato te, kasi na etumba ya Armagedone, “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, 16) Etumba yango ekopesa nzela mpo Nzambe akokisa likambo oyo alaki bato ete bakozala na kimya ya seko.​—Nzembo 37:10, 11, 29.

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali etumba ya Nzambe oyo ekosilisa bitumba nyonso, tángá lisolo “Etumba ya Armagedone ezali nini?”

a ACLED Conflict Index, “Classement des niveaux de conflits violents à travers le monde”, janvier 2024

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto