Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 132
  • Bitumba na Moyen-Orient​—Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bitumba na Moyen-Orient​—Biblia elobi nini?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baguvɛrnema ekosilisa bitumba na Moyen-Orient?
  • Bitumba na Moyen-Orient ezali kokokisa esakweli?
  • Armagedone ekobanda nde na Moyen-Orient?
  • Nini ekosalisa biso tózala na kimya na makanisi ntango makambo ya mabe ezali kosalema?
  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Armagedone ekobanda nde na Israël?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 132
Bombi oyo babwaki na engumba moko na Moyen-Orient ezali komatisa milinga na likoló.

Photo by Stringer/Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Bitumba na Moyen-Orient​—⁠Biblia elobi nini?

Bato na mokili bazali komitungisa mpo na matata oyo ezali kati na États-Unis, Israël mpe Iran. Bitumba yango ekopanzana tii na mikili mosusu? Baguvɛrnema ekopekisa nde yango mpe ekotya kimya ya libela?

Mbala mosusu baoyo bayebi bisakweli ya Biblia bazali komituna soki matata yango ya Moyen-Orient, ekoki kozala ebandeli ya etumba ya Armagedone, oyo elobelami na mokanda ya Emoniseli.

Biblia elobi nini?

Baguvɛrnema ekosilisa bitumba na Moyen-Orient?

Biblia elobi boye: “Bótyela bankumu motema te to mwana ya moto, mpo akoki kobikisa te.”​—Nzembo 146:3.

Toyebi te soki baguvɛrnema ekokoka kotya mwa kimwa na Moyen-Orient. Kasi, Biblia emonisi polele ete ezala mokonzi ya politiki, ezala guvɛrnema ya bana ya bato, to etuluku moko boye ya bato, moko te akosilisa bitumba mpe akotya kimya ya libela. Kaka Nzambe nde azali na likoki ya “kosilisa bitumba na mabele mobimba.”​—Nzembo 46:9.

  • Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobi “Bitumba na mokili ekosila​​—Ndenge nini?”

Bitumba na Moyen-Orient ezali kokokisa esakweli?

Biblia elobi: “Bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba. . . . Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.”​—Matai 24:6, 7.

Matata oyo ezali na Moyen-Orient ezali moko ya makambo oyo emonisi ete tozali na “eleko ya nsuka ya mokili” mpe ebakisami na kati ya makambo oyo emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka.” (Matai 24:3; 2 Timote 3:1) Bitumba oyo tozali komona lelo emonisi ete mosika te Nzambe akosilisa bitumba mpe makambo mosusu oyo enyokolaka bato.

  • Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Elembo ya ‘mikolo ya nsuka’ to ‘ntango ya nsuka’ ezali nini?”

Armagedone ekobanda nde na Moyen-Orient?

Biblia elobi: “Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre Armagedone.”​—Emoniseli 16:16.

Etumba ya Armagedone ezali te etumba kati na baguvɛrnema ya bato oyo ebandi na Moyen-Orient. Ezali etumba ya mabele mobimba kati na baguvɛrnema ya bato mpe Nzambe.

  • Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Etumba ya Armagedone ezali nini?”

Nini ekosalisa biso tózala na kimya na makanisi ntango makambo ya mabe ezali kosalema?

Biblia elobi: “Bómitungisaka ata na likambo moko te. Kasi na likambo nyonso, na libondeli, na lilɔmbo mpe matɔndi, bósɛngaka Nzambe lisalisi.”​—Bafilipi 4:6.

Yehovaa Nzambe asɛngi biso tóbondelaka ye. Lokola atyelaka biso likebi, akoyoka mabondeli na biso mpe akosalisa biso tólonga mitungisi. (1 Petro 5:7) Lolenge moko oyo asalaka yango ezali ndenge asalisaka biso tóyeba ntina oyo bitumba ezali kosila te, mpe lisusu ndenge oyo ekosila mpe makambo oyo akosala mpo mpasi mpe mitungisi esila.​—Emoniseli 21:3, 4.

  • Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge oyo Nzambe asalisaka biso, tángá lisolo “Biblia ekoki kobɔndisa ngai?”

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto