MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini soki baboti na ngai baboyi nasalela ba-réseaux sociaux?
Mbala mosusu baninga na yo nyonso basalelaka barezɔ, mpe balobelaka yango ntango nyonso. Ekoki kozala ete basɛkaka yo mpo ozali na konte moko te. Kasi, osengeli koyeba nini mpo na likambo yango? Mpe okosala nini mpo na yango?
Oyo osengeli koyeba
Ozali yo moko te. Baboti mingi balingaka te bana na bango básalela barezɔ. Ntango mosusu ezali mpo bamoni ete barezɔ ezali kobimisa makama lokola:
bamaladi ya makanisi.
pornografi, bamesajɛ ya mbindo, mpe matumoli.
matata ezangá ntina kati na baninga.
Bilenge mingi batiki na bango kosalela barezɔ. Bango moko bamoni ete ezali na makambo mingi ya mabe koleka ya malamu. Tótalela bandakisa oyo elandi:
Priscilla ayaki komona ete azalaki kolekisa ntango mingi na barezɔ; ntango oyo akokaki kosalela mpo na makambo ya ntina mingi koleka.
Jeremy azalaki kokoka te kopekisa makambo ya mabe oyo ezalaki kobima na bakonte na ye, mpe yango ezalaki kosepelisa ye te.
Bethany amonaki ete azalaki kolandela mingi makambo oyo bato mosusu bazalaki kosala.
“Nazwaki ekateli ya koboma konte yango, mpe nazali na esengo ndenge nasalaki yango. Nakanisaka yango lisusu te, mpe nazali kosalela ntango na ngai na makambo oyo eleki ntina.”—Sierra.
“Nazalaki kosepela te ndenge barezɔ ekómisaki ngai lokola moombo mpe ndenge nazalaki kolandela mingi oyo bato bakoloba mpo na ba post na ngai. Ezalaki mpasi mpo naboma konte na ngai, kasi nayokaki malamu ntango nasalaki yango. Nazwi kimya koleka ntango nazalaki na yango.”—Kate.
Oyo okoki kosala
Tosá baboti na yo. Salá ete bámona okómi mokóló, elingi koloba, okoki kotosa mibeko oyo batye kozanga ete osilika to omilelalela.
Toli ya Biblia: “Zoba abimisaka nkanda na ye nyonso polele, kasi moto ya bwanya afandaka kimya mpe apekisaka yango.”—Masese 29:11.
Baninga mosusu bakoki kopusa yo osalelaka barezɔ na kobombana, to mpe ofungola konte moko ya nkuku. Wana ezali malamu te! Kosala makambo na kobombama ekoki kosala omiyoka lokola moto amemi ngambo. Baboti na yo bakoki kotombokela yo soki bayei koyeba yango, mpe bakobanda kotyela yo lisusu motema te.
Toli ya Biblia: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”—Baebre 13:18.
Kómisá yango ekateli na yo. Ndenge moko na bilenge oyo tolobelaki liboso, yo mpe okoki kokanisa na bantina ya koboya kosalela barezɔ. Soki emonani ete kosalela barezɔ ebongi te mpo na yo, tiká kosalela yango; kaka te mpo na baboti na yo, kasi ezala nde ekateli na yo moko. Na bongo, soki baninga na yo batuni yo “mpo na nini ozali na konte te?” okoyokela yango lisusu nsɔni te—na yango bakosɛka yo te mpo na yango.
Na mokuse: Tosá baboti na yo, luká koyokana na bango, na yango ekateli na bango ekokóma mpe ya yo. Kobosana te, okokufa te kaka mpo ozali kosalela barezɔ te.