Kondimana ndenge na ndenge oyo ekangani na mokano na seko na Nzambe
Jéhovah . . . akobanzaka kondimana na ye ya seko, liloba lilakaki ye, kino mabota nkoto”—NZEMBO 105:7, 8.
1, 2. Mpo na nini tokoki koloba ete Kondimana moko ekangani na bomoi na bato mingi.
EKOKI mpenza kozala ete kondimana moko ekangani na bomoi na yo-bomoi na yo oyo eleki, ya lelo mpe oyo ezali koya. Okotuna ete ‘kondimana yango nini?’ Ezali bongo libala. Mpamba te, mingi kati na biso babotami kati na libala moko mpe basili bango mpenza kobala. Baoyo babali naino te, ekoki kozala ete bazali mpe kokana kosepela mokolo mosusu na bisengo ya libala.
2 Esili koleka bikeke mingi, mosakoli moebele Malaki alobaki mpo na “mwasi na bolenge na yo”, moninga na yo mpe mwasi na yo na nzela ya kondimana”. (Malaki 2:14-16) Akokanisaki libala na kondimana, mpamba te ezali kontra to boyokani ya lokumu, boyokani kati na bato mibale mpo na likambo moko. Libala ezali kondimana etali bato mibale mpo na yango bayokani kofanda mobali mpe mwasi, bandimi kozala na mikumba ya kokokisa moko epai na mosusu mpe bazali kozela kozwa matomba oyo ekoumela.
3. Mpo na nini ekoki kozala ete Kondimana mosusu ndenge na ndenge etali biso mingi koleka libala?
3 Ekoki komonana lokola ete libala ezali kondimana oyo ezali na bopusi mingi likoló na bato. Nzokande, Biblia elobeli kondimana ndenge na ndenge oyo eleki ntina lisusu. Na kotyaka kondimana ndenge na ndenge ya Biblia na ngambo moko, mpe oyo ya mangomba na ngambo mosusu, buku moko ya monene elobi sikisiki ete bobele kati na Biblia “nde molongo na boyokani kati na Nzambe mpe basaleli na ye ekomi ebongiseli monene oyo ekobota makambo kati na molongo mobimba”. Mpamba te, kondimana ndenge na ndenge yango ekangani na mokano na seko ya Mozalisi na biso ya bolingo. Lokola tokomona yango, ekoki komemela biso matomba ebele koleka. Totala soki na motindo nini.
4. Wapi Kondimana ya liboso oyo emonisi polele mokano na seko na Nzambe?
4 Toyebi malamu makambo ya mpasi mabimaki na botomboki ya Adam mpe Eva wana etemelaki bango bokonzi na Nzambe. Bamemeli biso kozanga kokoka, oyo ezali kobimisa bampasi mpe na nsuka liwa. (Genese 3:1-6, 14-19) Ata bongo, tokoki kosepela ete lisumu na bango ebebisaki te mokano na Nzambe, oyo alingi kotondisa mabelé na basambeli oyo bakobika seko na nzoto kolongono mpe na bomengo. Mpo na yango, Jéhovah asalaki kondimana oyo ezali na Genese 3:15: “Nakotya mpe likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye: ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye.” Kasi maloba oyo ya mokuse mpe ya elilingi ebimisaki mituna mingi oyo miyanolamaki te. Ndenge nini Jéhovah alingaki kokokisa bandaka oyo ekanganaki na kondimana yango?
5, 6. (a) Nzambe akanaki kosalela eloko nini mpo na kokokisa mokano na ye? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na nzela oyo Nzambe asalelaki mpo na ntina yango?
5 Nzambe azwaki likatami ya kokana molongo mosusu ya kondimana ndenge na ndenge, oyo motuya na yango nyonso ezali nsambo soki totangi mpe oyo esalemaki na Edene. Baoyo nyonso balingi kozwa bolamu ya seko basengeli koyeba kondimana yango nyonso. Na ndakisa tosengeli koyeba ntango nini mpe ndenge nini kondimana yango nyonso esalemaki, banani basalaki yango, maloba mpe mikano na yango ezalaki nini, mpe boyokani nini kondimana moko ezali na yango na mosusu kati na mokano na Nzambe oyo ezali ya kopesa bomoi na seko na bato ya botosi. Kotalela kondimana yango nyonso ezali na ntina awa ezali biso kobelema na le 22 Mars 1989, mokolo oyo masangá ya baklisto bakoyangana mpo na kokanisa Elambo ya Nkolo, elambo oyo ezali na boyokani mpenza na kondima yango nyonso.
6 Na ntembe te, mpo na bamosusu likambo etali kondimana ezali makasi, esalelamaka mingi te mpe ezali na motuya mingi te mpo na bato. Kasi tala oyo tokoki kotanga kati na Buku monene na teolozi ya kondimana na kala (angl.): “Kalakala, maloba malimboli ‘kondimana’, na Proche-Orient, na Grèce mpe kati na mokili ya Baloma . . . , makabwani na biteni mibale ya bandimbola na yango: Na epai moko ndai mpe kondima kosala eloko, na epai mosusu bolingo mpe boninga”. Tokoki kotalela bandimbola mibale oyo - ndai mpe boninga-lokola makambo masimbi mpenza kondimana nyonso ya Jéhovah.
Kondimana elongo na Abrahame: moboko ya bolamu ya seko
7, 8. Kondimana ya lolenge nini Jéhovah asalaki elongo na Abrahame? (1 Ntango 16:15, 16)
7 Nkoko na mabota Abrahame, “tata na baoyo bazali na kondima”, azalaki “moninga na Jéhovah”. (Baloma 4:11; Yakobo 2:21-23) Nzambe alapelaki ye ndai, kosalaka bongo kondimana oyo ezali moboko ya elikya na biso ya kosepela na bolamu ya libela.—Baebele 6:13-18.
8 Wana ezalaki Abrahame kofanda na Ulu, Jéhovah alobaki na ye akende na mokili mosusu, mokili yango ezalaki Kanana, na kopesaka ye ndaka oyo: “Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo, nakozalisa nkombo na yo monene; . . . mpe mpo na yo mabota nyonso na nse bakopambolamaa.” (Genese 12:1-3) Na nsima, Nzambe apesaki moke na moke bandimbola etali oyo tobengi kondimana elongo na Abrahame: Libota to mosangoli na Abrahame akozwa mabelé ya ndaka: motuya na bakitani na libota yango ekokoka kotangama te; Abrahame mpe Sara bakozala na bakonzi kati na bakitani na bango.—Genese 13:14-17; 15:4-6; 17:1-8, 16; Nzembo 105:8-10.
9. Ndenge nini toyebi ete Kondimana ya Abrahame ekoki komemela biso bolamu?
9 Nzambe abengaki kondimana yango “kondimana na ngai kati na ngai na yo [Abrahame]”. (Genese 17:2) Kasi tosengeli koyeba ete etali bomoi na biso, mpamba te na nsima Nzambe ayeisaki yango monene na kolobaka: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa bana na yo lokola myoto na likoló mpe lokola zelo na libongo na mai; bana na yo bakobotola bikuke na bayini na bango. Mpe mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo.” (Genese 22:17, 18) Lokola tozali kati na “mabota” yango, kondimama oyo ekoki komemela biso bolamu.
10. Tozali koyekola nini na Kondimana oyo esalamaki elongo na Abrahame?
10 Tolobela sikawa makambo oyo tokoki koyekola na kondimana elongo na Abrahame. Ndenge moko na kondimana ya Edene oyo esalemaki liboso na yango, kondimana elongo na Abrahame esakoli “libota“ moko ekoya, yango emonisi ete libota yango ekobima kati na molongo moko ya bato. (Genese 3:15) Molongo yango ekoleka na Seme, na Abrahame mpe na mwana na ye Yisaka. Ekozala na bakonzi mpe na motindo moko to mosusu ekomema mapamboli, bobele na libota moko te, kasi na bato ya mikili minso. Ndenge nini kondimana yango ekokisaki mokano na yango?
11. Kokokisama nini ya solosolo Kondimana ya Abrahame ezwaki?
11 Bakitani na Abrahame oyo babotamaki na Yakobo, to Yisraele, bafulukaki kino kokoma libota monene. Lokola na mosuni bazalaki libota na Abrahame oyo motango eyebanaki te, bamipesaki na losambo na mpeto ya Nzambe na Abrahame, na Yisaka mpe na Yakobo. (Genese 28:13; Exode 3:6, 15; 6:3; Misala 3:13) Mbala mingi Bayisraele bapengwaki na losambo ya mpeto, kasi “Jéhovah amonisaki bango boboto mpe ayokelaki bango mawa . . . mpo na kondimana na ye na Abrahame, na Yisaya mpe na Yakobo; mpe alingaki kobebisa bango te”. (2 Mikonzi 13:23; Exode 2:24; Levitike 26:42-45) Ata nsima wana Nzambe andimaki lisanga na baklisto, nzokande na boumeli ya mwa ntango, alandaki komonisa boboto monene epai na Bayisraele, oyo bazalaki libota na Abrahame na mosuni.—Danyele 9:27.
Libota ya Abrahame na elimo
12, 13. Ndenge nini Yesu amonanaki ete azali mosangani aleki monene ya libota na ndaka kati na kokokisama na elimo ya kondimana esalamaki elongo na Abrahame?
12 Kondimana ya Abrahame ezwaki kokokisama mosusu, oyo ya elimo. Ekokaki kozala mpasi mpo na koyeba yango liboso ya eleko na Yesu, kasi ezali likambo na esengo ete tokoki koyeba yango na mikolo na biso. Kokokisama yango oyo eleki monene elimbolami kati na Liloba ya Nzambe. Paulo akomaki: “Bilaka bisalamaki epai na Abrahame mpe na mobotami na ye. Elobi te ete; Mpe na babotami na ye, lokola ete bango mingi, kasi epai na moto moko ete: Mpe na mobotami na yo, ye wana Klisto.”—Bagalatia 3:16.
13 Ya solo, mobotami yango asengelaki kouta na molongo to na libota bobele moko. Ezalaki bongo mpo na Yesu, Moyuda na mosuni, mokitani na Abrahame. (Matai 1:1-16; Luka 3:23-34) Mpe lisusu, na likoló, azalaki mosangani na libota ya Abrahame monene. Tobosana te ete na kondima moko mozindo, nkoko na mabota Abrahame azalaki pene na kotumba mwana na ye mbeka soki Nzambe alingaki yango. (Genese 22:1-18; Baebele 11:17-19) Ndenge moko mpe, Jéhovah atindaki Mwana bobele moko na ye na mabelé, mpo apesa mbeka na lisiko mpo na bato oyo bakondimela ye. (Baloma 5:8; 8:32) Na bongo toyebi mpo na nini Paulo amonisi Yesu Klisto lokola mosangani aleki-monene ya libota na Abrahame oyo etangami kati na kondimana yango.
14. Eteni mosusu ya libota na Abrahame ezali nini, mpe nini tosengeli kotalela lisusu?
14 Na nsima Paulo alobaki ete, na kokokisama ya elimo, Nzambe ‘akofulisa libota na Abrahame’. Akomaki: “Soki bozali bato na Klisto, bozali mpenza libota na Abrahame, bozali basangoli na libula.” (Genese 22:17; Bagalatia 3:29) Basangoli na libula yango bazali baklisto 144 000 bapakolami na elimo, baoyo bazali eteni mosusu ya libota na Abrahame. Bakabwani te na mosangani aleki monene ya libota yango, kasi “bazali bato na Klisto.” (1 Bakolinti 1:2; 15:23) Toyebi ete mingi kati na bango bazali bakitani na Abrahame te, mpo bauti na mabota ya Bayuda te. Likambo eleki ntina, na kokokisama ya elimo, ezali ete na kobotama bazali bato na libota ya Jéhovah te Abrahame monene, kasi bauti nde na libota ezangi kokoka ya mosumuki Adam. Tosengeli bongo kotalela kondimana ndenge na ndenge oyo esalemaki nsima, mpo na komona motindo basangoli na libula yango bakoki kokokisa masengami mpo na kokoma basangani na “libota ya Abrahame”.
Kondimana ya Mibeko ebakisamaki mpo na mwa ntango
15-17. (a) Mpo na nini Kondimana ya Mibeko ebakisamaki likoló na oyo ya Abrahame? (b) Ndenge nini Mibeko mikokisaki mikano na yango?
15 Nsima wana esalaki Nzambe kondimana elongo na Abrahame, oyo ezali ya moboko mpo na kokokisama ya mokano na ye na ntango ekoya, ndenge nini molongo ya Libota elingaki kobatelama na mbindo to na kolimwisama kino na ntango etyamaki mpo na kobima na yango? Mpe wana eyaki Libota yango, ndenge nini basambeli na solo bakokaki koyeba ye? Ntoma Paulo ayanoli na mituna yango na kolakisaka polele mayele oyo Nzambe amonisaki na kobakisaka kondimana ya Mibeko mpo na mwa ntango. Akomaki:
16 “Bongo Mibeko mizali mpo na nini? Ebakisamaki mpo na komonisa mabunga kino koya na libota oyo ezwaki elaka: mpe epesamaki na baanze na maboko na mobongisi . . . Mibeko mikomaki molakisi na biso kino na Klisto, ete tolongisama mpo na kondima.”—Bagalatia 3:19, 24, M.N.
17 Na ngomba Sinai, Jéhovah asalaki kondimana bobele moko mpo na libota mobimba kati na ye mpe Yisraele: ezali kondimana ya Mibeko, oyo Moïse azalaki mobongisi na yango.”b (Bagalatia 4:24, 25) Bato bandimaki kokota na kondimana yango, oyo esalamaki likoló na makila ya bangombe babali mpe ya bantaba babali. (Exode 24:3-8; Baebele 9:19, 20) Yango epesaki na Bayisraele mibeko ya Nzambe mpe makambo minene ya boyangeli na sembo. Kondimana yango epekisaki bango kobalana na bapakano, kozala na etamboli ya mbindo to kosangana na misala na lingomba ya lokuta. Na ndenge yango, ezalaki kokengela bango na kobatelaka bopeto ya molongo oyo ezalaki komema na libota ya ndaka. (Exode 20:4-6; 34:12-16) Kasi lokola ata Moyisraele moko te, akokaki kotosa yango nyonso, Mibeko mizalaki komonisa masumu polele. (Bagalatia 3:19) Ezalaki mpe komonisa polele mposa ya nganga oyo azangi masumu, nganga ya libela, mpe mbeka oyo ekozongelamaka mbula na mbula te. Mibeko mizalaki lokola molakisi oyo azali komema mwana epai na moteyi oyo mwana asengeli na ye. Moteyi yango ezalaki Masiya, to Klisto. (Baebele 7:26-28; 9:9, 16-22; 10:1-4, 11) Ntango ekokisaki mokano na yango, kondimana ya Mibeko esukaki.—Bagalatia 3:24, 25; Baloma 7:6.
18. Elikya nini mosusu ekanganaki na Kondimana ya Mibeko, kasi mpo na nini ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango?
18 Ntango asalaki kondimana yango ya mwa ntango, Nzambe ayebisaki mokano kitoko oyo: “Soki bokotosa mpenza monoko na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai, mbele bokozala bato na ngai . . . Mpe bino, bokokoma mpo na ngai bokonzi na banganga mpe libota na bulee.” (Exode 19:5, 6) Kokoma libota na bakonzi-banganga! Oyo nde elikya ya lokumu! Kasi ndenge nini yango ekokaki kosalema? Lokola Mibeko mimonisaki yango sikisiki na nsima, libota na bakonzi (Yuda) mpe libota na banganga (Levi) ezwaki mikumba mikeseni. (Genese 49:10; Exode 28:43; Mituya 3:5-13) Moto te akokaki kozala ye moko mokonzi na bato mpe lisusu nganga. Nzokande, maloba na Nzambe mazwami na Exode 19:5, 6 matindi biso tokanisa ete, na lolenge ezangi koyebisama, baoyo bazalaki na nse na kondimana ya Mibeko balingaki kozwa likoki ya kobimisa basangani ya bokonzi ya banganga mpe ya libota na bulee’.
Kondimana elongo na Davidi mpo na Bokonzi
19. Na motindo nini Kondimana ndenge na ndenge esakolaki bokonzi?
19 Nsima na bikeke, Jéhovah asalaki lisusu kondimana mosusu oyo ememaki engengiseli monene koleka mpo na motindo oyo alingaki kokokisa mokano na ye, mpo na bolamu na biso ya seko. Tomonaki ete kondimana elongo na Abrahame esakolaki boyangeli oyo ekobima na libota na Abrahame na mosuni. (Genese 17:6) Kondimana ya Mibeko esakolaki lisusu ete bakonzi bakozala kati na libota na Nzambe, mpamba te Moïse alobaki na Yisraele: “wana ekokota yo na [mabelé ya ndaka] . . . mpe ekoloba yo ete: ‘Nalingi kotya mokonzi likoló na ngai, lokola mabota oyo mazingi ngai!’, okosengela solo komityela lokola mokonzi ye oyo Jéhovah Nzambe akopona. . . . Okosengela kotya mopaya likolo na yo te.” (Deteronome 17:14, 15) Ndenge nini Nzambe atyaki boyangeli yango, mpe boyokani nini ezalaki na yango na kondimana ya Abrahame?
20. Ndenge nini Davidi mpe bakitani na ye bakotaki na molongo?
20 Mokonzi ya liboso na Yisraele ezalaki Saulo, moto na libota ya Benyamina, kasi mokitani na ye ezalaki Davidi, moto na mpiko mpe na bosembo ya libota na Yuda. (1 Samwele 8:5; 9:1, 2; 10:1; 16:1, 13) Wana boyangeli na David etelemaki makasi, Jéhovah azwaki likatami ya kosala kondimana elongo na ye. Alobaki na ye libosoliboso ete: “Nakokembisa mwana na yo, oyo akobima na nzoto na yo mpe nakotelemisa mpenza bokonzi na ye; mpe ye akotonga ndako mpo na ngai; nakokembisa mpe efandelo na bokonzi na ye libela.” (2 Samwele 7:12, 13) Engebene maloba yango, ezali Salomo, mwana na Davidi, moto akitanaki tata na ye mpe atongaki ndako to tempelo mpo na Nzambe na Yelusaleme. Kasi esuki bongo te.
21. Kondimana ya Bokonzi oyo esalamaki elongo na Davidi ezalaki na elaka nini?
21 Na nsima Jéhovah asalaki kondimana oyo elongo na Davidi: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekobongisama liboso na yo libela; kiti ya bokonzi na yo ekotelema ngwi seko.” (2 Samwele 7:16) Emonani ete Nzambe atyaki bongo kokitana ya bakonzi mpo na Yisraele kati na libota ya Davidi. Na yango, na nsuka mosangani moko na molongo ya Davidi akoyangela “libela na libela, mpe kiti na bokonzi na ye ekozala lokola moi liboso na [Nzambe].”-Nzembo 89:20, 29, 34-36; Yisaya 55:3, 4.
22. Kondimana oyo esalamaki elongo na Davidi esalaki nini likoló na molongo ya Libota, mpe na nsuka likambo nini esalamaki?
22 Na bongo, ezali polele ete kondimana elongo na Davidi emonisaki na sikisiki molongo oyo ezalaki komema na Libota ya ndaka. Ata Bayuda na ekeke ya liboso bayebaki ete Masiya asengelaki kozala mokitani na Davidi. (Yoane 7:41, 42) Yesu Klisto, mosangani aleki monene ya libota na kondimana ya Abrahame, akokisaki masengami mpo na kokoma Mosangoli ya libela ya Bokonzi yango ya Davidi, lokola anzelu moko alobaki yango. (Luka 1:31-33) Na bongo Yesu azalaki na lotomo ya koyangela likoló na Mabelé ya ndaka, bokonzi ya mabelé oyo Davidi ayangelaki likoló na yango. Azali koyangela lokola mobotoli na bokonzi te, kasi engebene ebongiseli ya mibeko, na kondimama na Nzambe.
23. Mituna nini misengeli kozwa biyano?
23 Tosili kotalela bobele kondimana minei ya Nzambe oyo ekangani na kokokisama ya mokano na ye, oyo ezali ya kopambola bato seko. Ndenge bozali komituna mbala mosusu, mituna misusu ya koyanola mizali oyo: Lokola bato bazali naino na kozanga kokoka, esengeli nganga nini mpe mbeka nini mpo na kosilisa likambo yango libela? Ndenge nini bato bakoki kokokisa masengami mpo na kokoma basangani ya libota na Abrahame? Bantina nini endimisi biso ete lotomo ya koyangela ekosuka bobele na teritware moko na mabelé te? Ndenge nini libota ya Abrahame, ézala mosangani na yango ya liboso to basangani na yango oyo balandi, bakopambola “mabota nyonso na mabelé”, mpe na mokomoko kati na biso? Totalela mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali Kondimana ekambami na moto moko, mpamba te bobele Nzambe nde moto amipesi mokumba ya kokokisa maloba na kondimana yango.
b “Likambo etali Kondimana ezakaki kotalelama mingi na lingomba ya Yisraele, lingomba bobele moko oyo esengaki bosembo nyonso mpe eboyaki bosembo ekabolama epai na makambo mibale to mingi, na bokeseni na mangomba mosusu.”-Buku monene ya teoloji ya Kondimana na Kala (angl.), tome II, page 278.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Kondimana elongo na Abrahame etyaki moboko oyo ekopesa biso nzela ya kozwa mapamboli ya seko?
◻ Nani azalaki libota ya Abrahame na mosuni? Libota na elilingi?
◻ Mpo na nini Kondimana ya Mibeko ebakisamaki likoló na oyo ya Abrahame?
◻ Na nini Kondimana ya Davidi mpo na Bokonzi ekokisaki mokano na Nzambe?
[Etanda na lokasa 4]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Kondimana na Edene Genese 3:15
Kondimana elongo na Abrahame
Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka
Basangani mosusu ya Libota na ndaka
Bolamu ya seko
[Etanda na lokasa 5]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Kondimana na Edene Genese 3:15
Kondimana elongo na Abrahame
Kondimana na mibeko
Kondimana elongo na Davidi mpo na Bokonzi
Mosangani aleki-monene ya Libota na ndaka
Basangani mosusu ya Libota na ndaka
Bolamu ya seko
[Elilingi na lokasa 1]
Mpo na kokokisa mokano na ye etali bato, Nzambe asalaki Kondimana elongo na mosembwi Abrahame.