Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mai nk. 2-7
  • Mpo na nini mitinda ya Biblia ezali na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini mitinda ya Biblia ezali na ntina?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MITINDA YA BIBLIA EZALI NINI?
  • MPO NA NINI MITINDA YA BIBLIA EZALI NA NTINA?
  • NDENGE NINI TOKOKI KOMONA MITINDA YA BIBLIA?
  • ZWÁ EKATELI YA KOSALELA MITINDA YA BIBLIA NA BOMOI NA YO
  • Salelá mitinda ya Biblia mpo na koteya lisosoli na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Landá mitinda ya Nzambe na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mai nk. 2-7

06-12/07/2026

LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe

Mpo na nini mitinda ya Biblia ezali na ntina?

“Bókaba nzoto na bino . . . bósalela makoki na bino ya kokanisa wana bozali kosalela ye mosala mosantu.”—ROM. 12:1.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekomonisa soki mitinda ezali nini mpe ndenge oyo tokoki komona yango ntango tozali kotánga Biblia.

1-2. (a) Mpo na nini Biblia ekoki kobengama buku ya kala? (b) Mpo na nini Biblia esalisaka bato tii lelo oyo?

BIBLIA ezali buku moko ya kala. Ebandaki kokomama eleki sikoyo mbula soki 3500, mpe esilaki kokomama eleki sikoyo mbula pene na 2000. Atako bongo Biblia ezali “liloba ya Nzambe,” ezali na bomoi mpe na nguya ata lelo oyo. (Ebr. 4:12; 2 Tim. 3:​16, 17) Bamilio ya bato bamoni ete Biblia esalisi bango bázala na esengo atako mikakatano ya mokili ya lelo oyo.

2 Kasi mpo na nini buku yango ya kala ezali kaka kosalisa bato tii lelo? Ezali na bantina mibale ya minene. Ya liboso, nsango ya Biblia euti epai ya ‘Nzambe ya bomoi,’ Mozalisi oyo aleki na bwanya. (1 Tim. 4:10; Rom. 16:​26, 27) Ya mibale, Biblia ezali na mitinda oyo esalisaka na eleko nyonso. Mitinda yango epesaka kaka matomba ata soki moto afandaka wapi to azali na mikakatano nini.

3. Tokozwa biyano na mituna nini na lisolo oyo?

3 Mitinda ya Biblia ezali nini? Mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na biso lelo? Ndenge nini tokoki komona mitinda ntango tozali kotánga Biblia? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango. Tokomona mpe ndenge oyo mateya ya Yesu emonisaka valɛrɛ ya mitinda.

MITINDA YA BIBLIA EZALI NINI?

4. Mitinda ya Biblia ezali nini?

4 Mitinda ya Biblia ezali mateya ya moboko oyo ebotá mibeko ya Nzambe. Na bantango mosusu, tokoki komona polele mitinda oyo ezali na kati ya mobeko. (Mat. 22:37) Kasi, mitinda eleki mibeko. Mibeko ya sikisiki ekoki kotala kaka likambo moko. Ekoki kopesama mpo na eleko to libaku moko boye. Kasi mitinda ya Biblia emonisaka likanisi ya Yehova mpo na makambo mingi. Na yango, na kati ya mitinda nde tokoki komona ntina ya mobeko oyo epesami. Mobeko nyonso ya Yehova ezalaka na ntina oyo apesá yango. Kasi mitinda oyo ebotá mibeko yango ekoki kosalelama na makambo ndenge na ndenge mpe ata na eleko nini. (Nz. 119:111) Mibeko ekoki kobongwana, kasi mitinda esilaka ngala te to ebongwanaka te.—Yis. 40:8.

5. Ndakisa nini okoki kopesa mpo na kokesenisa mibeko ná mitinda? (Talá mpe bililingi.)

5 Tózwa ndakisa oyo mpo na koyeba malamu bokeseni oyo ezali kati na mibeko mpe mitinda. Mama moko akoki koloba na mwana na ye ya moke ete: ‘Kosimba resho to mbabola te.’ Yango ezali mitindo to mobeko. Kasi etinda, to likanisi oyo etindi mama apesa mobeko yango ezali ete: Kosimbaka eloko ya mɔtɔ te, mpo okozika. Etinda yango etali kaka resho to mbabola te. Ekoki kosalelama mpo na fɛlo ya bilamba, masini oyo epesaka molunge, to eloko mosusu ya mɔtɔ oyo ekoki kozikisa. Etinda yango ekosuka kaka te na kosalelama na ndako, kasi ata na bisika mosusu. Mpe ntango mwana yango akómi mokóló, na ntembe te akoyeba ndenge ya kosalela resho to mbabola. Kasi akosala kaka keba ete asimba yango te na ndenge oyo ekozikisa ye. Na yango mobeko oyo mama apesaki ye na bomwana ekoki kobongwana, kasi mitinda to likanisi na yango ya ntina ebongwani te.

Bililingi: Mama moko azali kolamba elongo na mwana na ye ya mobali. 1. Mama akebisi mwana na ye asimba resho ya mɔtɔ te ntango azali kolamba. 2. Bambula na nsima, mama azali kobongisa bilei mpe mwana na ye azali kolamba na resho.

Mobeko ekoki kobongwana, kasi likanisi oyo ezali na mitinda ebongwanaka te (Talá paragrafe 5)


MPO NA NINI MITINDA YA BIBLIA EZALI NA NTINA?

6. (a) Yehova atyeli biso nini na kati ya Liloba na ye? (b) Nini emonisi ete Yehova atyelaka biso motema?

6 Lokola Yehova alingaka biso, atyeli biso mibeko oyo tosengeli kotosa mpo tóboya makama. (Yak. 2:11) Kasi, asalisaka mpe biso tókanga ntina ya mitinda, to likanisi oyo ebimisá mibeko yango. Liloba na ye ekoki kolakisa biso nzela na makambo mingi ya bomoi oyo mbala mosusu ezali na mibeko ya polele te. Mitinda ya Biblia esalisaka biso tóyeba kozwa bikateli ya bwanya mpe tósala oyo ezali malamu. Lokola apesá biso mitinda yango, emonisi ete Yehova atyelaka biso motema mpe apesi biso bonsomi ya kozwa bikateli oyo ekomonisa ete tolingaka ye mpe tosepelaka kotosa ye.—Gal. 5:13.

7. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso. (Talá mpe elilingi.)

7 Mpo tómona ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso, tózwa ndakisa ya bilembo oyo batyaka na banzela minene ya mituka na bikólo mosusu. Bilembo yango mingi emonisaka mibeko oyo moto akoki kozwela etumbu soki atosi yango te. Bilembo yango ekoki komonisa vitɛsi oyo esengeli kolekisa te, to esika oyo motambwisi-motuka asengeli kotɛlɛma. Kasi, bilembo mingi ezalaka kaka mpo na kokebisa basofɛlɛ na makama oyo ekoki kobima. Na ndakisa, ekoki komonisa ete nzela ezali nyokanyoka, to ete banyama ekatisaka na balabala yango. Sofɛlɛ ya malamu akosalela bososoli mpe akozala ekɛngɛ ntango amoni bilembo yango na nzela. Na ndakisa, soki mbula ezali kobɛta to nɛjɛ ezali kokwea, sofɛlɛ ye moko akoyeba ndenge oyo asengeli kotambwisa motuka na ntango wana. Ndenge moko mpe, bakristo baboyaka na motema moko kosala likambo oyo ekobuka mobeko ya polele ya Liloba ya Nzambe; kasi mpe baboyaka ata makanisi to makambo oyo ekoki komema bango na kobuka mibeko ya Nzambe. Mpo na yango, esɛngaka bango moko básosola likanisi ya Yehova mpo na makambo yango.

Motuka moko ezali kotambola na butu na nzela moko ya nyokanyoka pembenipembeni ya ngomba. Miinda ya motuka yango ezali kobɛta bilembo ya kokebisa oyo ezali na nzela.

Bilembo mingi ya nzela ekebisaka sofɛlɛ na makama. Mitinda ya Biblia mpe esalisaka biso ndenge wana (Talá paragrafe 7)


8. Ndenge Baroma 12:​1, 2 emonisi yango, koluka mitinda ya Biblia ekosalisa biso na nini?

8 Kasi, ezali na ntina mosusu oyo tosengeli kolukaka mitinda ya Biblia mpe kosalela yango. Na ndakisa, ekosalisa biso tóyeba likanisi ya Yehova mpo na makambo ndenge na ndenge. Ntango tozali kotánga masolo ya Biblia, tosengeli koluka mateya oyo ekoki kosalisa biso. Tosengeli koluka koyeba ntina oyo Yehova akomisaki masolo yango na Liloba na ye mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso. Na ndenge yango, tokoyekola kosalela “makoki na [biso] ya kokanisa” mpo na kosepelisa Yehova. Tokomindimisa “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu, ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”—Tángá Baroma 12:​1, 2.a

9. Wapi ntina mosusu ya kosalela mitinda ya Biblia? (Baebre 5:​13, 14)

9 Kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso ekosalisa biso tókóma bakristo oyo bakɔmɛli. Ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia, boyokani na biso na Yehova ekokóma makasi. (Tángá Baebre 5:​13, 14.) Bana mike bazalaka na mposa ya mibeko ebeleebele, mpo báyeba oyo basengeli kosala. Bakoki kotosa mibeko yango kaka mpo na kobanga etumbu. Nzokande, Yehova azwaka biso lokola bana mike te, kasi nde lokola mikóló. Atyelaka biso motema ete tokozwa bikateli oyo eyokani na mokano na ye, mpe ayokaka esengo makasi ntango tozwi bikateli yango ya malamu.—Nz. 147:11; Mas. 23:​15, 26; 27:11.

NDENGE NINI TOKOKI KOMONA MITINDA YA BIBLIA?

10. Ndenge nini tokoki komona mitinda ya Biblia?

10 Soki tozali koluka kozwa mateya na masolo ya Biblia, tokomona mpe mitinda oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova akanisaka mpe amiyokaka mpo na likambo boye to boye. Tokoki mpe komona mitinda yango ntango tozali koluka ntina oyo apesaki mobeko boye to boye. Soki toyebi bantina oyo apesaki mibeko yango, tokoyeba mpe Yehova malamu koleka. Kasi, mpo tóyeba malamu likanisi ya Nzambe, tosengeli kobondela ye asalisa biso mpe tosengeli kokolisa makoki na biso ya kokanisa. (Mas. 2:​10-12) Tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe apesaki mobeko oyo? Soki Yehova aboyi likambo oyo, akomiyoka ndenge nini mpo na likambo oyo ekokani na yango? Liteya nini nazwi na lisolo yango ya Biblia, mpe ndenge nini nakoki kosalela yango na bomoi na ngai?’ Ntango tomoni ntina oyo Yehova apesaki mobeko moko mpe mateya oyo tokoki kozwa na masolo ya Biblia, tokobanda kozwa bikateli ya malamu, oyo eyokani na mokano ya Yehova.

11. Na Lisolo likoló ya Ngomba, ndenge nini Yesu alakisaki biso ndenge ya komona mitinda ya Biblia? (Talá mpe elilingi.)

11 Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alakisaki biso ndenge ya komona mitinda ya Biblia. Tótalela bandakisa misato. Na mokomoko, Yesu atángaki liboso mobeko. Na nsima amonisaki mitinda to likanisi oyo ebimisaki mobeko yango. Wana tozali kokanisa makambo oyo Yesu alobaki, tokomona ndenge oyo mitinda yango etali mpe biso lelo oyo. Lisusu, tokomona matomba ya kosalela mateya yango.

Yesu afandi na nse ya nzete mpe azali koteya bayekoli na ye.

Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu alakisaki biso ndenge ya komona mitinda ya Biblia oyo ezali na kati ya mibeko ya Nzambe (Talá paragrafe 11)


12. Wapi etinda moko oyo tokoki kobimisa na mobeko oyo ezali na Matai 5:​21, 22? (Talá mpe elilingi.)

12 Tángá Matai 5:​21, 22. “Osengeli koboma moto te.” Etinda nini tokoki kobimisa na kati ya mobeko yango? Yehova alingi te tóyina basusu—ezala na misala, na maloba, to ata na makanisi na biso. Yesu amonisaki ete ata soki moto abomi mpenza ndeko na ye te, kasi soki azali koyina ye, atosi te ntina oyo esimbi mobeko wana. Soki moto “akangeli ndeko na ye nkanda” to afingi ye, “akozongisa monɔkɔ.” Mpo na koloba solo, nkanda mpe koyina nde makambo oyo ememaka na koboma moto.—1 Yoa. 3:15.

13. Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​21, 22 na bomoi na biso? (Talá mpe elilingi.)

13 Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​21, 22 lelo oyo? Tosengeli te kobomba nkanda na motema to kokangela moto nkanda. (Lev. 19:18; Yobo 36:13) Mpo na nini? Mpo mayoki wana ekoki kokolisa ezaleli ya koyina na motema na biso mpe yango ekoki kotinda biso tóloba to tósala basusu mabe. (Mas. 10:12) Tokoki kobanda kotɔnga mpe kokosela basusu makambo, mpe yango ekoki kobebisa lokumu na bango. (Mas. 20:19; 25:23) Na yango, liboso kutu biloko lokola basite Internet ya kosolola na bato, basite epai bato bapesaka bansango na bango, to Internet ebima, Yesu apesaki etinda to likanisi oyo ekosalisa bakristo oyo bakɔmɛli na elimo báyeba makama oyo bakoki kokutana na yango ntango bazali kosalela biloko yango ya mikolo oyo. Kasi, ata na esika nini, tosengeli te koloba makambo oyo ekomonisa ete toyinaka basusu, mpo mbala mingi yango ebebisaka mpenza lokumu ya moto.

Bililingi: 1. Maloba ya vɛrsɛ oyo emonisi mobeko ya Biblia: “Osengeli koboma moto te.” 2. Bandeko basi mibale bazali kotɔnga mpe ndeko mwasi mosusu oyo azali koyoka asepeli te na makambo oyo bazali koloba.

(Talá paragrafe 12-13)


14. Etinda nini tokoki kobimisa na mobeko oyo ezali na Matai 5:​27, 28? (Talá mpe elilingi.)

14 Tángá Matai 5:​27, 28. “Osengeli kosala ekobo te.” Etinda nini tokoki kobimisa na kati ya mobeko yango? Yehova ayinaka kaka pite te, kasi ayinaka mpe makanisi oyo ekoki komema na pite. Yesu amonisaki ete soki moto oyo abalá azali kokoba kotala mwasi (oyo azali mwasi na ye te) na ndenge ya mabe tii na koyoka ye mposa, moto yango asali lisumu. Na yango, tosengeli koboya makanisi ya mbindo ya ndenge nyonso, ata soki ekosɛnga tósala milende makasi. (Mat. 5:​29, 30) Etinda yango etali mpe bakristo oyo babali naino te.

15. Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​27, 28 lelo oyo? (Talá mpe elilingi.)

15 Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​27, 28 lelo oyo? Tosengeli te kofandisa bamposa ya mbindo na makanisi na biso. (2 Sa. 11:​2-4; Yobo 31:​1-3) Boye, ezali polele ete mokristo oyo akɔmɛli na elimo aboya lolenge nyonso ya pornografi. Asengeli koloba te ete azali kaka kotala makambo ya pite, asali na ye likambo ya mabe te. Akoluka mpe te komilongisa mpe koloba ete azali kotala pornografi oyo bato mosusu bamonaka ete ezali mabe mpenza te lokola balolenge mosusu ya pornografi. Na mikolo ya Yesu, batelefone, batablɛti, bafilme, to bafɔtɔ ezalaki te. Atako bongo, Yesu apesaki biso etinda oyo esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Yehova amiyokaka mpo na bililingi to bavideo oyo bato bazali kobimisa lelo oyo. Yango esalisaka biso tósosola ete Yehova asepelaka ata moke te na makambo oyo ezali kosalema lelo oyo, na ndakisa, kotindela moto bafɔtɔ to bavideo ya makambo ya kosangisa nzoto to bamesaje mpe maloba ya makambo ya mbindo. Kosalela etinda yango ya Biblia ekosalisa moto oyo abalá asalela te molongani na ye makambo na kozanga bosembo. (Mal. 2:15) Esalisaka mpe bakristo nyonso, ezala baoyo babalá to baoyo bazali minzemba, báboya eloko nyonso oyo ekoki komema na pite.—Mas. 5:​3-14.

Bililingi: 1. Maloba ya vɛrsɛ oyo emonisi mobeko ya Biblia: “Osengeli kosala ekobo te.” 2. Ndeko mobali moko azali kolongola site moko ya kosolola na bato na telefone na ye.

(Talá paragrafe 14-15)


16. Etinda nini tokoki kobimisa na mobeko oyo ezali na Matai 5:​43, 44? (Talá mpe elilingi.)

16 Tángá Matai 5:​43, 44. “Osengeli kolinga mozalani na yo.” Etinda nini tokoki kobimisa na kati ya mobeko yango? Yehova alingi tómonaka ete moto nyonso azali mozalani na biso mpe tólinga ye. Likambo ya mawa, Bayuda na mikolo ya Yesu bakómaki koloba ete mobeko yango elakisi ete bakoki koyina banguna na bango. Kasi Yesu ayebaki ete yango te nde likanisi ya mobeko wana. Ayebaki ete Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo alingaka ete tólinga bato nyonso, kozanga kotala loposo to ekólo na bango.—Mat. 5:​45-48.

17. Na ndenge nini kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​43, 44 ekosalisa biso na bomoi? (Talá mpe elilingi.)

17 Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Matai 5:​43, 44 lelo oyo? Kolinga bazalani na biso ekotinda biso tóboya kokɔta na bitumba mpe matata oyo ezali na mokili lelo oyo. (Yis. 2:4; Mika 4:3) Ekosalisa biso mpe tózala na boboto ata epai ya bato ya loposo, ekólo, to lingomba mosusu. (Mis. 10:​34, 35) Lisusu, ekosalisa biso tólimbisaka baoyo bapesi biso to baoyo tolingaka mpasi.—Mat. 18:​21, 22; Mrk. 11:25; Luka 17:​3, 4.

Bililingi: 1. Maloba ya vɛrsɛ oyo emonisi mobeko ya Biblia: “Osengeli kolinga mozalani na yo.” 2. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kolakisa mobali moko oyo azali loposo moko te na bango mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” na wenze.

(Talá paragrafe 16-17)


ZWÁ EKATELI YA KOSALELA MITINDA YA BIBLIA NA BOMOI NA YO

18. (a) Tosengeli kozala na ekateli nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Tozali na botɔndi ndenge Yehova azwaka biso lokola mikóló, kasi te lokola bana mike! Alingi tósalelaka mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu. (1 Ko. 14:20) Ntango tolingi kozwa bikateli, tosengeli ‘kokoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’ (Ef. 5:17) Kolinga Yehova kasi te kobanga etumbu, nde ekosalisa biso tózwaka bikateli oyo eyokani na mokano na ye. Kasi ezali na likabo mosusu oyo ekosalisa biso tózwaka bikateli oyo ekosepelisa Yehova. Likabo yango ezali lisosoli. Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mitinda ya Biblia ezali nini?

  • Bokeseni nini ezali kati na mitinda mpe mibeko?

  • Wapi mwa mitinda oyo Yesu alobelaki na Lisolo likoló ya Ngomba?

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

a Mbala mingi esɛngaka bakristo bátalela mitinda mingi ya Biblia malamumalamu. Tosengeli koyeba boyokani oyo ezali kati na mitinda ya Biblia mpe kosalela yango mpo na kozwa bikateli. Tokoki kosalela mayele to makoki ya kokanisa oyo Nzambe apesá biso mpo na kozwa bikateli ya malamu oyo Yehova akondima mpe akopambola. Na siɛklɛ ya liboso, lolenge yango ya kosala makambo ezalaki mbongwana monene mpo na Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo. Liboso bazalaki kolanda kaka ebele ya mibeko oyo eutaki na mimeseno ya bonkɔkɔ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto