Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Décembre lok. 32
  • Yekolá kotyela nguya ya Yehova ya kobikisa motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yekolá kotyela nguya ya Yehova ya kobikisa motema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Masolo mosusu
  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yehova asengeli kozala elikya na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Komisá elikya na yo makasi epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Décembre lok. 32

MAKAMBO YA KOYEKOLA

Yekolá kotyela nguya ya Yehova ya kobikisa motema

Tángá Mitángo 13:25–14:4 mpo na komona ndenge Bayisraele batyelaki Yehova motema te.

Talelá lisolo mobimba. Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito, mpo na nini bakokaki kotya motema na likoki ya Yehova ya kobikisa bango? (Nz. 78:​12-16, 43-53) Nini esalaki ete bátyela lisusu Yehova motema te? (Mib. 1:​26-28) Ndenge nini Yosua ná Kalebe bamonisaki ete batyelaki Yehova motema?—Mit. 14:​6-9.

Kɔtá na mozindo. Bayisraele bakokaki kosala nini mpo bátyela lisusu Yehova motema mingi? (Nz. 9:10; 22:4; 78:11) Boyokani nini ezali kati na kotyela Yehova motema mpe kozala na limemya epai na ye?—Mit. 14:11.

Bimisá mateya. Omituna boye:

  • ‘Makambo nini ekoki kosala ete ezala mpasi natyela Yehova motema?’

  • ‘Nini ekosalisa ngai natyela Yehova motema mingi sikoyo mpe na mikolo ekoya?’

  • ‘Natyaka mpenza motema ete bolɔzi monene ezali koya?’—Luka 21:​25-28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto