20-26/04
YISAYA 54-55
Loyembo 86 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Okondima kopesa nini mpo na koteyama na Yehova?
(Min. 10)
Yehova alakaki ete akoteya bana na ye (Yis 54:13; w09 15/9 21 par. 3)
Tosengeli kopesa ntango na biso mpo na kosomba solo (Yis 55:1, 2; w18.11 4 par. 6-7)
Koyoka mateya ya Yehova na likebi esɛngaka milende, kasi yango ekoki kobikisa (Yis 55:3; be 14 par. 3-5)
OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini nakoki kobongisa momeseno na ngai ya koyekola ngai moko?’
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Yis 54:17—Eteni ya liboso ya vɛrsɛ yango ekundwelaka biso makambo nini misato ya ntina? (w19.01 6 par. 14-15)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Yis 54:1-10 (th liteya 11)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 1 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 2 pwɛ 3)
6. Kolandela bokoli
(Min. 2) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Pesá moto yango karte ya jw.org. (lmd liteya 9 pwɛ 3)
7. Diskur
(Min. 5) be 28 par. 3–31 par. 2—Motó ya likambo: Ndenge ya koyekola. (th liteya 14)
Loyembo 97
8. Ndenge ya kolonga makambo oyo ekoki kopekisa biso koyekola biso moko
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Makambo mingi ekoki kopekisa biso tóbatela programɛ ya malamu mpo na kosala boyekoli na biso moko. Kanisá ete ozali koluka kolendisa ndeko moko oyo azali kobundana mpo na kozwa ntango ya koyekola ye moko mbala na mbala mpe kotánga Biblia mokolo na mokolo. Ndeko yango ayebisi yo ete makambo oyo elandi nde ezali kopekisa ye. Mpo na likambo mokomoko, komá ata likanisi moko, etinda ya Biblia, to lisolo moko na mikanda na biso oyo ekoki kosalisa ye.
“Natángaka malamu te”
“Nalingaka mpenza koyekola te”
“Nayebi te nabanda wapi na botángi ya Biblia to bavɛrsɛ boni nasengeli kotánga mokolo na mokolo”
“Makambo ya koyekola eleki ebele! Makambo nini nasengeli koyekolaka pɔsɔ nyonso?”
“Nazalaka na makambo mingi ya kosala, ezalaka mpasi mpo nazwa ntango ya koyekola”
“Nakokaka kotya makanisi esika moko te ntango molai mpe na bantango mosusu nabosanaka makambo oyo nauti kotánga”
Lakisá VIDEO Yekoláká malamu yo moko. Na nsima tuná bayangani boye:
Makanisi nini ozwi oyo okoki kosalela mpo boyekoli na yo moko esalisa yo mpenza?
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 78-79