13-19/04
YISAYA 52-53
Loyembo 18 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
Yesu azali kokende esika oyo bakoboma ye
1. Yesu amonisaki bolingo mpenza!
(Min. 10)
Esakweli elobaki ete Yesu akotyolama (Yis 53:3; Mt 26:67, 68; w10 15/11 7 par. 2)
Elobaki mpe ete Yesu akondima komona mpasi (Yis 53:7; ip-2 205 par. 25; talá elilingi ya ezipeli)
Bolingo nde etindaki Yesu andima komona mpasi mpo na kosala mokano ya Yehova mpe komema masumu na biso (Yis 53:10-12; Yoa 14:31; 15:13)
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min.10)
Yis 52:11—Ndenge nini tokoki kosalela etinda ya esakweli yango? (it “Bisaleli” par. 2)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Yis 53:3-12 (th liteya 10)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) NDAKO NA NDAKO.Sɛngá moto yango bóbanda koyekola Biblia. (lmd liteya 4 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO.Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 3 pwɛ 3)
6. Kolandela bokoli
(Min. 5) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá moto oyo ayaki na Ekaniseli bóbanda koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 8 pwɛ 3)
Loyembo 20
7. Kómá moninga ya Yehova—Likambo oyo eleki monene oyo emonisi bolingo
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Lakisá VIDEO. Na nsima tuná bayangani boye:
Na ndenge nini mbeka ya Yesu ezali likabo?
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na mbeka yango?
8. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 76-77