27/04–03/04
YISAYA 56-57
Loyembo 12 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Tozali na esengo ndenge Yehova azali Nzambe na biso
(Min. 10)
Bikeko eyokaka te baoyo babelelaka yango mpo na koluka lisalisi (Yis 57:13; ip-2 269-270 par. 14-16)
Bato oyo bayebi Yehova te bazali na kimya te mpe bazali na bokabwani (Yis 57:20; w18.06 7 par. 16; it “Mabele” par. 21)
Bato mabe bazalaka na kimya te (Yis 57:21; it “Kimya” par. 3)
OMITUNA BOYE: Ndenge nini kozala moninga ya Yehova ebongisi bomoi na ngai?
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Yis 56:6, 7—Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama? (w07 15/1 10 par. 3; w06 1/11 27 par. 1)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Yis 56:4-12 (th liteya 5)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Yebisá moto yango likambo oyo oyekolaki na makita oyo eleki. (lmd liteya 2 pwɛ 4)
5. Limbolá bindimeli na yo
(Min. 5) Diskur. ijwbq lisolo 90—Motó ya likambo: Kozala mondimi ya lingomba moko ezali na ntina? (th liteya 16)
6. Kokómisa bato bayekoli
(Min. 4) lff liteya 19 pwɛ 4 (lmd liteya 11 pwɛ 3)
Loyembo 58
7. Kotika te kolobela makambo ya Yehova
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Bato oyo bayebi Yehova te bazali na litambwisi ya malonga te, bayebi ntina ya bomoi te, mpe bazali na elikya ya solosolo te. Nzokande, mingi bazali koboya nsango ya Bokonzi mpo bayebi te ete solo ekosalisa bango mpenza. Talá mwa bantina oyo tolɛmbaka nzoto te to totikaka kosakola te ata ntango bato bazali koyoka biso te.—Mos 11:6.
Makambo ebongwanaka na teritware na biso. Bankolo-ndako oyo bazalaki kosepela na solo te bakoki kolongwa, mpe bato oyo bakɔti sika bakoki kondima koyoka biso
Moto mosusu nde akoki koya na porte. Mobange moko, mwana moko oyo akómi sikoyo mokóló, moto ayei kofanda wana sika, to mopaya nde akoki koya na porte
Bato babongwanaka. (1Ti 1:13) Mpasi oyo ezali se kobakisama na mokili to likama oyo ekómeli moto ekoki kosala ete alinga koyoka biso
Kotika te kosakola emonisaka ete tolingaka Yehova.—Lk 6:45; 1Yn 5:3
Lakisá VIDEO Yehova “azali mosika te.” Na nsima tuná bayangani boye:
Mateya nini ozwi na oyo etali kotika te kosakola?
8. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 80-81