18-24/05
EBANDELI 40-41
Loyembo 8 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Yehova abikisi Yozefe”: (Min. 10)
Eb 41:9-13—Bayebisi Farao nsango ya Yozefe (w15 1/2 lok. 14 par. 3-4)
Eb 41:16, 29-32—Yehova apesaki Yozefe likoki ya kolimbola bandɔtɔ ya Farao (w15 1/2 lok. 14 par. 5)
Eb 41:38-40—Yozefe akómaki mokonzi ya mibale nsima ya Farao (w15 1/2 lok. 15 par. 3)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Eb 41:14—Mpo na nini Yozefe akataki mandefu liboso akende kokutana na Farao? (w15 1/11 lok. 9 par. 1-3)
Eb 41:33—Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yozefe alobaki na Farao? (w09 15/11 lok. 28 par. 14)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Eb 40:1-23 (th liteya 2)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Min. 5) Lisolo na bayangani. Lakisá video mpe na nsima tuná bayangani mituna oyo: Nini emonisi ete ndeko mobali oyo ná mwasi na ye babongisaki esika moko kozongela moto mpo na mbala ya liboso? Ndenge nini ndeko mobali amonisaki polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ?
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 11)
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 5 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá nkolo-ndako moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. (th liteya 13)
BOMOI YA BAKRISTO
Mekolá Yozefe—Yiká mpiko atako makambo ya kozanga bosembo: (Min. 6) Bandá na kolakisa video Kómá moninga ya Yehova—Yiká mpiko atako makambo ya kozanga bosembo. Na nsima, bengá bana báya na estrade mpe tuná bango boye: Makambo nini ya kozanga bosembo basalelaki Caleb ná Sophia? Okanisi ete Caleb ná Sophia bazwaki liteya nini na makambo oyo Yozefe akutanaki na yango?
Bamposa ya lisangá: (Min. 9)
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 115
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 124 mpe libondeli