MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 40-41
Yehova abikisi Yozefe
Yozefe anyokwamaki lokola moombo mpe azalaki mokangami na bolɔkɔ na boumeli ya mbula soki 13 liboso Yehova abikisa ye. Na esika akóma koimaima, Yozefe atikaki makambo oyo akutanaki yango ebongisa ye lisusu. (Nz 105:17-19) Ayebaki ete Yehova akosundola ye te. Ndenge nini asalaki oyo akokaki kosala na ntango wana ya mpasi?
Amipesaki na kosala mosala makasi mpe azalaki moto oyo bazalaki kotyela motema, yango esalaki ete Yehova apambola ye.—Eb 39:21, 22
Azalaki kotyela basusu likebi na esika akana kozongisa mabe na mabe epai ya bato oyo banyokolaki ye.—Eb 40:5-7
Ndenge nini makambo oyo Yozefe akutanaki na yango ekoki kosalisa ngai nayika mpiko na mikakatano na ngai?
Lokola Armagedone eyei naino te mpo Yehova abikisa ngai, nakoki kosala nini mpo namitungisa mingi te sikoyo?