BOMOI YA BAKRISTO
Mekolá Yozefe—Kimá pite
Yozefe atikelá biso ndakisa malamu na oyo etali kokima pite. Mbala nyonso oyo mwasi ya nkolo na ye azalaki kolɛngola ye mpo básangisa nzoto, Yozefe azalaki koboya. (Eb 39:7-10) Eyano na ye: “Bongo ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” emonisaki ete ayebaki ete na miso ya Yehova kaka bato oyo babalá nde basengeli kosangisa nzoto. Mpe na nsima ntango makambo eyaki ndɔngɔ, akimaki na esika atika mwasi yango abongola makanisi na ye.—Eb 39:12; 1Ko 6:18.
TALÁ VIDEO BÓKIMA PITE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Likambo nini Jin akutanaki na yango?
Motuna nini eyelaki Jin na makanisi ntango Mee-Kyong asɛngaki asalisa ye na devuare ya matematiki?
Eyano ya Mee-Kyong esalaki Jin nini?
Ndenge nini basalisaki Jin?
Jin asalaki nini mpo akima pite?
Video oyo eteyi yo nini?