MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 38-39
Yehova asundolaki Yozefe te
Ntango Yozefe akutanaki na komekama ndenge na ndenge, Yehova asalaki ete ‘likambo nyonso oyo azalaki kosala elonga’ mpe asalaki ete “andimama na miso ya kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ.” (Eb 39:2, 3, 21-23) Lisolo oyo ekoki koteya biso nini?
Soki tokutani na komekama, yango elingi koloba te ete Yehova asundoli biso.—Nz 34:19
Tosengeli kokanisa makambo nyonso ya malamu oyo Yehova azali kosalela biso mpe kopesa ye matɔndi.—Flp 4:6, 7
Tosengeli koluka lisungi epai ya Yehova.—Nz 55:22