Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 2 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 2 SANZA YA 11
Loyembo 52 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
ia mok. 1 par. 14-27, bozongeli na lok. 16 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Ntango 16-20 (Min. 8)
No. 1: 1 Ntango 17:15-27 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Sanduku ya kondimana ezalaki nini?—it-1-F lok. 158-161 (Min. 5)
No. 3: Elifaze (Éliphaz No. 2)—Motó ya likambo: Yehova ayinaka lolemo ya lokuta—it-1-F nk. 725-726 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Piká misisa mpe tɛlɛmá ngwi na kondima.’—Kol. 2:6, 7.
Min. 10: Kabolá bazulunalo na sanza ya zomi na moko. Lisolo na bayangani. Bóbanda na bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, bólobela bilakiseli yango.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki na ndenge basalelaki makanisi ya lisolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma na bizaleli malamu ya koyekola.” Sɛngá bayangani báyebisa makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango.
Loyembo 140 mpe libondeli
Tóbosana te: Tosɛngi bino bóbɛta liboso miziki mbala moko, mpe na nsima bandeko bakoyemba loyembo ya sika.