Liloba ya Nzambe ezali na nguya na bomoi na yo ya mokolo na mokolo?
Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso ‘tópika misisa’ mpe ‘tótɛlɛma ngwi na kondima.’ (Kol. 2:6, 7) Nzokande, mpo Liloba ya Yehova ezala na nguya na bomoi na biso, tosengeli kokanisa yango na mozindo mpe kosalela mitinda na yango. (Ebr. 4:12; Yak. 1:22-25) Yosua 1:8 emonisi makambo misato ya ntina na oyo etali kotánga: (1) Kotánga Liloba ya Nzambe “butu moi.” (2) Kotánga “na mongongo ya nse,” oyo epesi likanisi ya kotánga mbangumbangu te mpo ozala na likoki ya komanyola mpe koluka komona na makanisi ndenge makambo yango elekaki mpe bisika oyo yango esalemaki. (3) Kosalela mpenza “makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango.” Soki tosaleli makanisi yango, ekosalisa biso ‘tólonga’ mpe ‘tósalaka makambo na bwanya’ na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.