Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/15 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 10/15 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 sanza ya 10, 2015.

  1. Na ndenge nini lisolo oyo ezali na 2 Bakonzi 13:18, 19 emonisi ntina ya kosalela Nzambe na molende mpe na motema mobimba? [7 sanza ya 9, w10 15/4 lok. 26 par. 11]

  2. Nani azalaki koyangela na Yisraele ntango Yona azalaki kosakola, mpe nini esepelisi biso na mosala ya Yona, na kotalela makambo ekomami na 2 Bakonzi 14:23-25? [7 sanza ya 9, w09 1/1 lok. 25 par. 4]

  3. Ndenge nini Ahaze amonisaki ete azangi kotya motema na liloba ya Yehova oyo mosakoli Yisaya ayebisaki ye, mpe motuna nini tosengeli komituna ntango tozali kozwa bikateli ya minene? (2 Bak. 16:7) [14 sanza ya 9, w13 15/11 lok. 17 par. 5]

  4. Mayele mabe nini Rabashake asalelaki oyo batɛmɛli ya basaleli ya Nzambe basalelaka lelo oyo, mpe ezaleli nini ekoki kosalisa biso tóboya makanisi mabe ya batɛmɛli? (2 Bak. 18:22, 25) [14 sanza ya 9, w10 15/7 lok. 13 par. 3-4]

  5. Ndenge nini ndakisa ya komikitisa ya Yosiya esalisaka biso tózwa mpenza matomba na botángi na biso ya Biblia mpe boyekoli? (2 Bak. 22:19, 20) [21 Sanza ya 9, w00 1/3 lok. 30 par. 2]

  6. Ndenge nini biloko ya kala oyo bato ya mayele bamonaki endimisi ete bakonzi mibale oyo balobelami na 2 Bakonzi 25:27-30 bazalaki na bomoi? [28 sanza ya 9, w12 1/6 lok. 5 par. 2-3]

  7. Wapi makambo misato oyo Yabeze asɛngaki Yehova, mpe yango eteyi biso nini mpo na libondeli? (1 Nt. 4:9, 10) [5 sanza ya 10, w10 1/10 lok. 23]

  8. Ndenge nini bolongi ya etumba oyo elobelami na 1 Ntango 5:18-22 ekoki kosalisa biso mpo tóbunda etumba na biso ya elimo na mpiko mpenza? [12 sanza ya 10, w05 1/10 lok. 9 par. 7]

  9. Mpo na nini Davidi azalaki na likoki ya kososola mpe komemya mobeko ya Yehova na oyo etali bosantu ya makila, mpe ndakisa na ye esengeli kotinda biso tósala nini? (1 Nt. 11:17-19) [19 sanza ya 10, w12 15/11 nk. 6-7 par. 12-14]

  10. Likambo nini Davidi asalaki te ntango alukaki komema sanduku ya kondimana na Yerusaleme, mpe yango ekoki kopesa biso liteya nini ya ntina? (1 Nt. 15:13) [26 sanza ya 10, w03 1/5 nk. 10-11 par. 11-13]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto