Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 19 sanza ya 10
PƆSƆ EBANDI NA 19 SANZA YA 10
Loyembo 54 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
ia nk. 2-3 mpe maloba ya ebandeli par. 1-15 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Ntango 8-11 (Min. 8)
No. 1: 1 Ntango 11:15-25 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Eliya (Éliya No. 1)—Motó ya likambo: Kotyola ata moke te nguya ya libondeli—it-1-F nk. 731-733 (Min. 5)
No. 3: Nani azali anzelu-mokonzi?—it-1-F lok. 157 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Piká misisa mpe tɛlɛmá ngwi na kondima.’—Kol. 2:6, 7.
Min. 20: “Ndenge ya kosimba motema ya bato oyo tozali koteya.” Mituna mpe biyano. Bósala bilakiseli mibale oyo ekeseni. Mwasi moko alobi ete mwana na ye akufaki mpe azali sikoyo na likoló. Na elakiseli ya liboso, mpo na koyanola, mosakoli atángi mokanda ya Mosakoli 9:5 oyo emonisi ndenge bakufi bazalaka. Vɛrsɛ yango ebɔndisi mwasi yango te mpe asepeli te. Na elakiseli ya mibale, mosakoli asaleli takte mpe atángi Yoane 5:28, 29 mpo na kobenda likebi na elikya ya lisekwa, mpe mwasi yango asepeli mpenza.
Min. 10: Ozala elenge to mokóló, zalá ndakisa malamu mpo na basusu. (Flp. 3:17; 1 Tim. 4:12) Lisolo na bayangani ekouta na Buku ya mobu 2015, lokasa 71, paragrafe 3 tii na lokasa 73, paragrafe 1; mpe nkasa 76-77. Sɛngá bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 90 mpe libondeli