Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalisa bayekoli ya Biblia bákoma na bizaleli malamu ya koyekola
Mpo na nini ezali na ntina: Mpo bayekoli ya Biblia bákɔmɛla na elimo, basengeli kaka te kotondisa makanisi mpe mitema na bango na mateya ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe. (Ebr. 5:12–6:1) Koyekola esɛngaka milende. Esɛngaka mpe kokokanisa makambo tozali koyekola na oyo tosí toyebi, mpe koluka koyeba ntina na yango. (Mas. 2:1-6) Koyekola kosala bolukiluki ekosalisa bayekoli báyeba koyanola mituna ya Biblia na lisalisi ya mikanda ya moombo ya sembo. Soki basali mpenza makasi ya kosalela makambo oyo bazali koyekola, bakolonga mikakatano oyo bakristo bakutanaka na yango.—Luka 6:47, 48.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Na nsuka ya motó ya likambo moke to mokapo moko, tuná moto oyo oyekolaka na ye Biblia aloba na mokuse makambo oyo auti koyekola. Soki ozali na moto ya koyekola na ye Biblia te, meká koloba na mokuse makanisi ya eteni moko ya Biblia, to maloba ya paragrafe moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koluka kokolisa makoki ya kokanga ntina ya makambo oyo otángi.