Ndenge ya kobanda lisolo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/09/2015
“Osilá komituna soki nkombo ya Batatoli ya Yehova eutá wapi? [Tiká ye apesa eyano.] Eyano ezali na Biblia, epai Nzambe amonisi nkombo na ye mpenza. [Tángá Nzembo 83:18.] Lokola tozali Batatoli ya Yehova, toyebisaka nsango malamu oyo etali ye mpe mokano na ye mpo na bato. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi polele makanisi ya lokuta oyo bato bazalaka na yango mpo na biso.”
Lamuká! 09/2015
“Bato mingi bandimaka ete tosengeli na mbongo mpo tózala na bomoi. Kasi, okanisi ete likama ezali soki moto atye makanisi na ye kaka na mbongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá likebisi ya Biblia. [Tángá 1 Timote 6:9.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo tokoki kozala na bokatikati na likambo ya mbongo.”