Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya libwa
“Bato mingi bandimelaka baanzelu. Bongo yo? [Tiká ye apesa eyano.] Lokola baanzelu bazali bikelamu ya elimo, bazali na nguya mingi. Okanisi ete bakoki kosalisa biso? Biblia eyebisi biso ndenge oyo basalisaka bato lelo oyo.” Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2014, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/09/2014
“Okanisaka ete bato bakobebisa mabele mpo na libela? [Tiká ye apesa eyano.] Atako bato bakokoka te kobongisa biloko oyo babebisi, Biblia eyebisi biso ete Nzambe azali na makoki mpe na mposa ya kosala yango. Maloba ya Nzembo 65:9 endimisi biso yango. [Tángá.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli ndenge Nzambe akobatela mabele mpe ndenge oyo tokoki kosepela na mapamboli yango na mikolo ezali koya. Nakoki kotikela yo yango mpo otánga?”
Lamuká! 09/2014
“Basali mingi bamonaka ete patrɔ na bango asalisaka bango misala mingi, mpe bayebaka te ndenge ya kokima mbamba oyo batyaka bango. Bato ya mayele balobi ete soki mosala eleki ndelo ekoki kosilisa moto makasi, mpe yango ekoki kobebisa nzoto mpe makanisi na ye. Okanisi ete nini ekoki kosalisa moto mpo azala na bokatikati na bomoi na ye? [Tiká ye apesa eyano.] Talá vɛrsɛ moko ya Biblia oyo ekoki kotinda moto akanisa. [Tángá Mosakoli 4:6.] Zulunalo oyo elobeli makambo minei oyo ekosalisa biso tóyeba nini oyo tosengeli kotya na esika ya liboso, mpe ndenge ya kosala mpo mosala esilisa biso makasi te.”