Manaka mpo na pɔsɔ ya 2 sanza ya 3
PƆSƆ EBANDI NA 2 SANZA YA 3
Loyembo 5 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 21 par. 1-8 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ruta 1-4 (Min. 8)
No. 1: Ruta 3:14–4:1-6 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Akila (Aquila)—Motó ya likambo: Sakoláká na molende mpe yambáká bapaya—it-1-F nk. 144-145 (Min. 5)
No. 3: Komikitisa mpe nguya ya Mokonzi Kristo—igw lok. 8 par. 5–lok. 9 par. 4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: Tózala na “molende na misala ya malamu”!—Tito 2:14.
Min. 10: Kabolá bazulunalo na sanza ya misato. Lisolo na bayangani. Bóbanda na bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kokabola bazulunalo na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Lendisá basakoli nyonso báyeba malamu makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango.
Min. 10: “Tólendisana mpenza mpo na kosala misala ya malamu.” Lisolo na bayangani. Monisá ndenge oyo motó ya likambo ya sanza elobelamaki mingi na Likita ya mosala na boumeli ya sanza ya mibale.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwi na ndenge basalelaki makanisi ya lisolo: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na nzela ya interphone”. Soki bosalaki lisolo yango, tuná basakoli báloba ndenge oyo bapesaki litatoli na nzela ya interphone.
Loyembo ya sika “Yehova nde nkombo na yo” mpe libondeli
Tóbosana te: Tosɛngi bino bóbɛta liboso miziki mbala moko, mpe na nsima bandeko bakoyemba loyembo ya sika.