Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 23 sanza ya 2, 2015.
Na ndenge nini bingumba ya ekimelo na Yisraele ya kala ekesanaki na batempelo ya bapakano epai bato mabe bazalaki kobombana? (Yos. 20:2, 3) [5 sanza ya 1, w10 1/11 lok. 15 par. 4-6]
Mpo na nini Yosua alobaki na kondima nyonso maloba oyo ezali na Yosua 23:14, mpe mpo na nini tosengeli kotyela mpenza bilaka ya Yehova motema? [12 sanza ya 1, w07 1/11 lok. 26 par. 19]
Mpo na nini libota ya Yuda ezwaki mabele liboso ya mabota mosusu? (Bas. 1:2, 4) [19 sanza ya 1, w05 15/1 lok. 24 par. 5]
Mpo na nini Barake atyaki mbamba ete mosakoli Debora akende elongo na ye na etumba? (Bas. 4:8) [19 sanza ya 1, w05 15/1 lok. 25 par. 4]
Nkombo oyo Gideone apesaki etumbelo oyo atongaki emonisi nini, mpe yango eteyi biso nini? (Bas. 6:23, 24) [26 sanza ya 1, w14 15/2 nk. 22-23 par. 9]
Liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo Gideone apesaki bato ya Efraime oyo baswanisaki ye? (Bas. 8:1-3) [2 sanza ya 2, w05 15/7 lok. 16 par. 4]
Ntango Yefeta asalaki elako, azalaki nde na likanisi ya kotumba moto lokola mbeka? (Bas. 11:30, 31) [9 sanza ya 2, w05 15/1 lok. 26 par. 1]
Na kolanda Basambisi 11:35-37, nini esalisaki mwana mwasi ya Yefeta akokisa ndai ya tata na ye? [9 sanza ya 2, w11 15/12 nk. 20-21 par. 15-16]
Ntango mokonzi azalaki te na Yisraele mpe “moto na moto azalaki kosala oyo ezali sembo na miso na ye moko,” yango ekɔtisaki nde mobulu? Limbolá. (Bas. 17:6) [16 sanza ya 2, w05 15/1 lok. 27 par. 7]
Liteya nini etali kolendendela na libondeli tokoki kozwa na lisolo ya Bayisraele, oyo bakweaki mbala mibale na etumba na mabɔkɔ ya libota ya Benyamina oyo etombokaki? (Bas. 20:14-25) [23 sanza ya 2, w11 15/9 lok. 32 par. 1-4]