Sakolá na molende solo na ntina na Yesu
Molende na biso ebakisamaka soki toyebi ndenge ya koyebisa bato mosusu solo na ntina na Yesu. Yesu azali libanga ya litumu ya moboko oyo kondima ya solo etongami likoló na yango. (Ef. 2:20) Soki ye te, tokokaki kozala na elikya ya bomoi te. (Mis. 4:12) Na yango, ezali na ntina ete moto nyonso ayeba mokumba ya Yesu na mokano ya Nzambe. Bato mingi bakosamá na mateya oyo euti na Biblia te. Likambo ya mawa, bakoki kozanga mapamboli oyo Nzambe alaki mpo na baoyo bazali kondimela Yesu. Molende mpo na solo ekotinda biso tósalisa bato ya mitema sembo báyeba Yesu malamu, soki akokani na Nzambe to te mpe mokumba oyo azali na yango na mokano ya Nzambe. Na eleko oyo ya Ekaniseli, okosakola na molende solo na ntina na Yesu?