Manaka mpo na pɔsɔ ya 3 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 3 SANZA YA 11
Loyembo 79 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 15 par. 11-19 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 14-18 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 15:16–16:8 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ntina oyo tosengeli kondima ete lisumu ezali—rs lok. 310 par. 3–lok. 311 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Kokamata mpe kokómisa (Adoption)—Ndenge oyo bazalaki kotalela mpe kosalela likambo ya kokamata moto mpe kokómisa ye moto na yo, ndenge Makomami ya Ebre emonisi yango—it-1-F nk. 48-49 par. 1-4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Sakolá liloba, salá yango na molende.”—2 Tim. 4:2.
Min. 10: Salisá bilenge bámibongisaka mpo na mosala ya kosakola. Lisolo na bayangani. Lakisá video Kómá moninga ya Yehova—Tókende mosala ya kosakola. (Kende na jw.org, mpe talá na nse ya esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BANA.) Tuná bilenge boye: Banani na kati na bino bazali na sakosi ya mosala ya kosakola? Biloko nini otyaka na sakosi na yo? Eloko nini ya liboso oyo Sophia atyaki na sakosi na ye? Azalaki na mposa ya eloko nini mosusu? Ntango asilisaki kotya biloko na sakosi na ye, likambo nini ya ntina akendaki kosala elongo na mama na ye? Sɛngá elenge moko asala elakiseli ya kokabola zulunalo moko. Soki video yango ezali na Lingala te, lakisá yango na Lifalanse.
Min. 10: Ndenge oyo bandeko mosusu basakolaka Liloba na molende. Nkulutu moko akosolola na basakoli mibale to misato oyo basalaki makambo mosusu mpo na kobongola programɛ na bango mpo básakola mingi to básala mosala ya mobongisi-nzela. Mpo na kosukisa, lobelá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwaki mpo na mosala ya kosakola, mpe lendisá bandeko nyonso básala oyo bakoki kosala mpo básakola mingi.
Min. 10: Ndenge nini makoki na yo ya kosakola ekolaki? Lisolo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo masolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola” esalisaki bango bákolisa makoki na bango na mitindo ekeseni ya mosala ya kosakola. Mpo na kosukisa, lendisá basakoli nyonso bákoba kosakola na molende na kosalela makanisi ya masolo yango.
Loyembo 100 mpe libondeli