Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya zomi: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Sanza ya zomi na moko mpe sanza ya zomi na mibale: Biblia eteyaka mpenza nini? to moko ya batrakte oyo tozali na yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Tozali na esengo ya koyebisa bino ete mwa babuku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpe Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? ezali sikoyo na minɔkɔ 11 oyo: Alur, Kanyok, Kikongo ya Leta, Kinande, Kipende, Kituba (Brazzaville), Lega, Lomongo, Mashi, Ngbaka mpe Sanga. Bokoki kosɛnga yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14) na monɔkɔ oyo bolingi. Bisaleli yango ya sika ekosalisa bino mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na minɔkɔ yango.
◼ Longola minɔkɔ wana, bokoki mpe kosɛnga trakte ya sika T-36 Bokonzi ya Nzambe ezali nini? na minɔkɔ mosusu 16 oyo: Bembe, Bushoong, Bondengese, Ebudza, Kimanianga, Lari (Brazzaville), Kilendu, Lingombe, Mbala, Ngbandi, Losongomino, Teke (Kinshasa), Teke (Brazzaville), Kiyaka, Kiyansi mpe Kiyombe.