Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya yambo
“Bato mingi bazalaka na makinisi ekesani mpo na Nzambe. Bamosusu bakanisa ete Nzambe azali nguya moko oyo ekoki kolimbolama te. Basusu bamonaka ete azali tata ya likoló oyo atondi na bolingo. Bongo yo, okanisi ete Nzambe azalaka ndenge nini?” Tiká ye apesa eyano. Lakisá ye lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2014 mpe bótalela makambo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Tikelá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/01/2014
“Tozali kotala bino na mwa miniti moke mpo na kolobela likambo moko oyo esalaka biso nyonso mpasi: liwa ya moto oyo olingaka. Liwa ya moninga moko ya motema to ndeko moko ya libota esalaka mpenza mpasi, boye te? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bamonaki ete vɛrsɛ oyo ya Biblia ebɔndisaki bango. [Tángá Yisaya 25:8.] Zulunalo oyo elobeli elikya moko kitoko oyo euti na Biblia ya kosukisa liwa mpe kozongisa lisusu na bomoi balingami na biso oyo bakufá.”
Lamuká! 01/2014
“Ondimi ete lelo oyo mabota ezali kokutana na mikakatano? [Tiká ye apesa eyano.] Lisese oyo ya Biblia eyebisi biso eloko oyo bato ya libota basengeli kozala na yango mpo na koteya mpe kolendisa libota na bango. [Tángá Masese 24:3.] Bato mingi bamoni ete Biblia ezali buku moko oyo ezali na bwana oyo ebongi kotyela motema. Zulunalo oyo elobeli site Internet moko oyo ekeseni na mosusu nyonso, epai bato bakoki kozwa bisaleli ya ofele mpo na kosalisa mabota na bango.”