Ndenge ya kobanda lisolo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/01/2016
“Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu mpenza soki moto nyonso atosaka etinda oyo? [Tángá Baebre 13:18 mpe tiká ye apesa eyano.] Biblia elendisi biso tózalaka sembo na makambo nyonso. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza oyo elobeli ndenge oyo kozala sembo etali makambo nyonso ya bomoi na biso.”
Lamuká! 01/2016
“Nayei kopesa yo Lamuká! ya sanza oyo. [Pesá ye bazulunalo.] Talá motuna oyo ezali na lokasa 2 mpe biyano oyo bato mingi bapesaka. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli mwa batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tótalela bomoi na ndenge ya malamu koleka.”