Manaka mpo na pɔsɔ ya 1 sanza ya 7
PƆSƆ EBANDI NA 1 SANZA YA 7
Loyembo 69 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 11 par. 9-14 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Misala 11-14 (Min. 10)
No. 1: Misala 11:1-18 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ebongiseli ya lisiko esengeli kotinda biso tósalela bomoi na biso ndenge nini?—rs lok. 308 par. 4-6 (Min. 5)
No. 3: Banani bazali mpenza baninga na yo?—Nz. 119:63 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya nsambo. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá ntina oyo bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya lisolo oyo olobeli titre ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá na bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Soki bosali naino yango te, bózongela makanisi ya ntina ya liyangani ya zongazonga to liyangani ya mokolo moko ya mobu 2012. (Talá mokanda ya 03/05/2008)
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Luka 12:16-31. Bólobela ndenge oyo lisolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Loyembo 35 mpe libondeli