Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/13 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 6/13 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 24 sanza ya 6, 2013. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki maloba oyo ezali na Yoane 3:14, 15 ete: “Mpe kaka ndenge Moize atombolaki nyoka na esobe, Mwana ya moto mpe asengeli kotombolama ndenge wana”? [6 sanza ya 5, it-2-F lok. 940]

  2. Ntango nini bayekoli ya Kristo bazwaka bomoi na kati na bango, to batondaka na bomoi? (Yoa. 6:53) [13 sanza ya 5, w03 15/9 lok. 31 par. 3]

  3. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yesu amonisaki bomoto ya Tata na ye epai ya bato ya kozanga kokoka. (Yoa. 8:28) [20 sanza ya 5, w11 1/4 lok. 7 par. 3]

  4. Liteya nini tozwi na ndenge Yesu “alelaki, abimisi mpisoli” na liwa ya moninga na ye Lazalo? (Yoa. 11:35) [20 sanza ya 5, w08 1/5 lok. 24 par. 3-5]

  5. Liteya nini ya monene Yesu apesaki na ndenge asukolaki bayekoli na ye makolo? (Yoa. 13:4, 5) [27 sanza ya 5, w99 1/3 lok. 31 par. 1]

  6. Ndenge nini elimo ya Nzambe etambwisaka biso? (Yoa. 14:26) [27 sanza ya 5, w11 15/12 nk. 14-15 par. 9]

  7. Na Yoane 21:15, liloba “oyo” elakisi nini, mpe liteya nini tokoki kozwa? [3 sanza ya 6, w08 15/4 lok. 32 par. 11]

  8. Na kotalela Misala 2:44-47 mpe Misala 4:34, 35, elimo nini bakristo basengeli komekola? [10 sanza ya 6, w08 15/5 lok. 30 par. 5]

  9. Na lisolo oyo ezali na Misala 7:59 Stefano abondelaki Yesu? [17 sanza ya 6, w08 15/5 lok. 31 par. 2]

  10. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa malamu ya Barnabasi, mpe matomba nini tokozwa? (Mis. 9:26, 27) [24 sanza ya 6, bt lok. 65 par. 19]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto