Manaka mpo na pɔsɔ ya 6 sanza ya 5
PƆSƆ EBANDI NA 6 SANZA YA 5
Loyembo 26 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 9 par. 1-7 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yoane 1-4 (Min. 10)
No. 1: Yoane 3:22-36 (Eleka min. 4 te)
No. 2: “Kotambola na elimo” elimboli mpenza nini?—Gal. 5:16 (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini liwa ya Yesu Kristo ekeseni na oyo ya bato mosusu oyo bakufá liwa ya martiru?—rs lok. 302 par. 4–lok. 303 par. 3 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya mitano. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá ntina oyo bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya lisolo oyo elobeli titre ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, sɛngá na bayangani bayebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Soki Yehova ye moko atongi ndako te, bato oyo batongi yango basali mosala wana ya makasi kaka mpamba. (Nz. 127:1) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2013, lokasa 149, paragrafe 1 tii na lokasa 151, paragrafe 1. Sɛngá na bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 47 mpe libondeli