Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/13 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 4/13 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya minei: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia. Sanza ya mitano mpe sanza ya motoba: Bomoi malamu na libota, Nani mpenza azali koyangela mokili?, Mpo na nini kondimela Biblia, to Okosepela koyeba solo? Soki moto yango asepeli, lakisá ye ndenge toyekolaka na bato Biblia na buku Biblia eteyaka to na moko ya mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko.

◼ Bokoki kobongola mwa moke programɛ ya makita oyo bokosala pɔsɔ moko liboso ya liyangani ya etúká mpo na kozongela batoli mpe “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Liyangani ya etúká 2013,” oyo etalelamaki na pɔsɔ ya 22 sanza ya minei. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, na lisolo “Bamposa ya lisangá,” bokoki kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola.

◼ Soki olingi kokende mboka mopaya mpe koyangana na liyangani ya etúká kuna, okoki komona bisika mpe badati ya mayangani ya etúká na Internet na adrɛsi oyo: www.jw.org, na esika bakomi “Qui sommes-nous?,” mpe na nsima poná “Rassemblements.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto