Manaka mpo na pɔsɔ ya 29 sanza ya 4
PƆSƆ EBANDI NA 29 SANZA YA 4
Loyembo 50 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 8 par. 14-20 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Luka 22-24 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
Likita ya mosala:
Min. 10: Tóbanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 8, bósala elakiseli oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na bato Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya mitano. Lendisá bandeko nyonso básala bongo. Lobelá lisolo “Otalaka mbala na mbala etanda ya mayebisi?”
Min. 10: Nsango oyo tosengeli kosakola—“Nsango malamu oyo ya Bokonzi.” Diskur ya kolendisa ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 279-281.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Matai 16:21-23 mpe Luka 9:22-26. Bólobela ndenge masolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Loyembo 117 mpe libondeli