Otalaka mbala na mbala etanda ya mayebisi?
Bankulutu, basaleli ya misala, mpe bandeko mosusu oyo bazali na mikumba na lisangá batalaka mbala na mbala etanda ya mayebisi mpo na koyeba soki bazali na mokumba. Nzokande, moto nyonso na lisangá akoki koyeba makambo ya ntina kuna. Oyebi ntango oyo etuluku na bino ekotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi? Biro ya filiale to mokɛngɛli ya zongazonga ayebisi lisangá likambo moko ya ntina? Oyebi motó ya likambo ya diskur oyo ekosalema na pɔsɔ oyo mpo obengisa moto oyekolaka na ye Biblia? Mbongwana esalemi na programɛ ya makita to na etuluku na bino ya mosala ya kosakola? Mayebisi mingi ya makambo wana epesamaka lisusu te na makita, mpe ekoki kozala mpasi mpo bankulutu báyebisa yango na mosakoli mokomoko. Na yango, tosengeli kotalaka etanda ya mayebisi mbala na mbala. Soki tozali kosala bongo, makambo nyonso ekosalema na “ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Ko. 14:40.