Manaka mpo na pɔsɔ ya 4 sanza ya 3
PƆSƆ EBANDI NA 4 SANZA YA 3
Loyembo 62 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 6 par. 7-12, etanda na lok. 73 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Marko 9-12 (Min. 10)
No. 1: Marko 11:19–12:11 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Soki moto akufi, azwaka nde etumbu mosusu mpo na masumu na ye?—rs lok. 187 par. 5-9 (Min. 5)
No. 3: Ntina oyo komipesa na Nzambe ememelaka moto esengo—Mis. 20:35 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Misato. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá ntina oyo bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya lisolo oyo elobeli titre ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, sɛngá na bayangani bayebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Zwá matomba na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2013. Lisolo na bayangani. Lobelá na mokuse mokapo ya mobu na nkasa 3-4 mpe “Ndenge ya kosalela mwa buku oyo,” na lokasa 5. Na nsima, sɛngá na bayangani bálobela ntango oyo baponá mpo na kotalelaka mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwaka. Mpo na kosukisa, lendisá bandeko bátalelaka mokapo ya mokolo na mokolo.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Loyembo 119 mpe libondeli