Mayebisi
Mikanda oyo tokokabola na sanza ya mibale: Mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Ntango moto oyo olingaka akufi . . . , Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, to Okoki kozala moninga ya Nzambe! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia.
Mokɛngɛli na mosala ya kosakola, elongo na sɛkrɛtɛrɛ bakotalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza liboso tókóma na katikati ya mobu ya mosala, mpo soki moko na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga básalisa ye.
Plan ya diskur ya sika ya Ekaniseli ebongisami mpe yango nde balobi nyonso bakosalela kobanda 2013. Na mbula oyo, motó ya likambo na yango elobi: “Monisá ete ozali na botɔndi mpo na oyo Kristo asalaki mpo na yo!”
Diskur ya ntina mingi oyo ekosalema na eleko ya Ekaniseli 2013 ekozala na motó ya likambo: “Soki tokufi, nyonso esili?”